Nzembo 127:1-5

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Salomo. 127  Soki Yehova ye moko atongi ndako te,+Bato oyo batongi yango basali mosala wana ya makasi kaka mpamba.+Soki Yehova ye moko abateli engumba te,+Mokɛngɛli akɛngɛli kaka mpamba.+   Ezali kaka mpamba ata bolamuki ntɔngɔntɔngɔ,+Ata bofandi tii na butu makasi,+Ata bozali kolya bilei na mpasi.+Ya solo, apesaka mpɔngi na moto oyo ye alingaka.+   Talá! Bana bazali libula oyo euti na Yehova;+Mbuma ya libumu ezali mbano.+   Lokola makula na lobɔkɔ ya mobali ya nguya,+Bana ya bolenge bazali mpe ndenge wana.+   Esengo na mobali makasi oyo atondisi+ libenga na ye na bango.Bakoyoka nsɔni te,+Mpo bakoloba na banguna na porte.

Maloba na nse