Nzembo 125:1-5

Loyembo ya ntango ya komata. 125  Baoyo bazali kotyela Yehova motema+Bazali lokola Ngomba Siona,+ oyo ekoki kotengatenga te, kasi efandá mpo na seko.+   Ndenge bangomba ezali zingazinga na Yerusaleme,+Yehova mpe azali zingazinga ya bato na ye+Banda sikoyo mpe mpo na seko.+   Mpo lingenda ya bokonzi ya mabe ekokoba kozala likoló ya libula ya bayengebene te,+Mpo bayengebene básembola lobɔkɔ na bango mpo na kosala mabe ata moke te.+   Ee Yehova, salelá bato malamu makambo ya malamu,+Ɛɛ bato oyo bazali na mitema sembo.+   Nde baoyo bazali kopɛngwa mpo na kokende na banzela na bango oyo etɛngamá,+Yehova akobengana bango esika moko na bato oyo basalaka makambo oyo eyokisaka mpasi.+Kimya ekozala na Yisraele.+

Maloba na nse