Nzembo 124:1-8
Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi.
124 “Soki Yehova azalaka na ngámbo na biso te,”+Yisraele aloba yango sikoyo,+
2 “Soki Yehova azalaka na ngámbo na biso te+Ntango bato batɛmɛlaki biso,+
3 Mbɛlɛ bamɛli biso na bomoi,+Ntango nkanda na bango ezalaki kopelela biso.+
4 Mbɛlɛ mai ememi biso,+Mokɛli eleki likoló ya molimo na biso.+
5 Mbɛlɛ mai ya lofundo+ elekiLikoló ya molimo na biso.
6 Yehova apambwama, ye moto akabaki biso te+ eteTózala nyama ya kolya na mino na bango.+
7 Molimo na biso ezali lokola ndɛkɛ oyo ebiki+Na motambo ya bato oyo batyaka mitambo.+Motambo ebukani,+Mpe biso tobiki.+
8 Lisalisi na biso ezali na nkombo ya Yehova+Mokeli ya likoló ná mabele.”+