Nzembo 123:1-4

Loyembo ya ntango ya komata. 123  Natomboli miso na ngai epai na yo,+Ee Yo oyo ozali kofanda na likoló.+   Talá! Ndenge miso ya basaleli etalaka lobɔkɔ ya nkolo na bango,+Ndenge miso ya mosaleli ya mwasi etalaka lobɔkɔ ya nkolo na ye ya mwasi,+Ndenge wana nde miso na biso etalaka Yehova Nzambe na biso+Kino akomonisela biso boboto.+   Ee Yehova, moniselá biso boboto, moniselá biso boboto;+Mpo totyolami mingi mpenza.+   Baoyo bazali na kimya basɛki mpenza molimo na biso kosɛka,+Bato ya lofundo batyoli yango mpenza kotyola.+

Maloba na nse