Nzembo 122:1-9

Loyembo ya ntango ya komata. Ya Davidi. 122  Nasepelaki ntango balobaki na ngai ete:+“Tókende+ na ndako ya Yehova.”+   Makolo na biso etɛlɛmaki+Na baporte na yo, Ee Yerusaleme.+   Yerusaleme etongami lokola engumba+Oyo biteni na yango ekangisami esika moko lokola eloko moko,+   Epai mabota emati,+Mabota ya Yah,+Lokola eloko ya kokanisa na Yisraele+Mpo na kopesa matɔndi na nkombo ya Yehova.+   Mpamba te bakiti ya bokonzi mpo na kosambisa ezali kuna,+Bakiti ya bokonzi ya ndako ya Davidi.+   Bósɛngela Yerusaleme kimya.+Ee Engumba, baoyo bazali kolinga yo bakozala na mitungisi te.+   Kimya ekoba kozala na mwa ngomba na yo oyo basalá mpo na libateli,+Bandako milai na yo ya kofanda+ ezala na mitungisi te.   Mpo na bandeko na ngai mpe baninga na ngai nakoloba sikoyo:+“Kimya ezala na yo.”+   Mpo na ndako ya Yehova Nzambe na biso+Nakokoba koluka bolamu na yo.+

Maloba na nse