Nzembo 121:1-8
Loyembo ya ntango ya komata.
121 Nakotombola miso na ngai na bangomba.+Lisalisi na ngai ekouta wapi?+
2 Lisalisi na ngai ezali kouta na Yehova,+Mokeli ya likoló ná mabele.+
3 Akoki kopesa nzela soki moke te ete lokolo na yo etengatenga.+Ye oyo azali kobatela yo akoki koyoka mpɔngi soki moke te.+
4 Talá! akoyoka mpɔngi te mpe akolala te,+Ye oyo azali kobatela Yisraele.+
5 Yehova azali kobatela yo.+Yehova azali elili+ na yo na lobɔkɔ na yo ya mobali.+
6 Na moi, moi ekobɛta yo te,+Na butu, sanza mpe ekosala yo mabe te.+
7 Yehova ye moko akobatela yo na bampasi nyonso.+Akobatela molimo na yo.+
8 Yehova ye moko akobatela kobima na yo mpe kokɔta na yo+Banda sikoyo tii na ntango oyo etyami ndelo te.+