Nzembo 120:1-7

Loyembo ya ntango ya komata. 120  Na mpasi na ngai nabengaki Yehova,+Mpe ayanolaki ngai.+   Ee Yehova, bikisá molimo na ngai na mbɛbu ya lokuta,+Na lolemo ya bokosi.+   Eloko nini bakopesa yo, mpe eloko nini bakobakisela yo,Ee yo lolemo ya bokosi?+   Makula ya moto ya nguya oyo esebisami,+Ná makala ya banzete ya letama oyo ezali kopela.+   Mawa na ngai, mpo nafandi mopaya na Mesheke!+Natye hema na ngai esika moko na bahema ya Kedare.+   Mpo molimo na ngai efandi ntango molai mingi+Esika moko na bayini ya kimya.+   Nazali mpo na kimya;+ kasi ntango nazali koloba,Bango bazali mpo na etumba.+

Maloba na nse