Nzembo 12:1-8
Epai ya mokambi ya nzembo na mongongo ya nse.+ Mondule ya Davidi.
12 Bikisá ngai,+ Ee Yehova, mpo mosembwi akómi na nsuka;+Mpo bato ya sembo balimwe na kati ya bana ya bato.
2 Bazali se kolobelana makambo ya lokuta;+Na monɔkɔ sukali+ bazali se koloba na mitema mibale.+
3 Yehova akolongola bato nyonso ya monokɔ sukali,Lolemo oyo elobaka makambo minene,+
4 Baoyo balobi ete: “Na lolemo na biso tokolonga.+Mbɛbu na biso ezali elongo na biso. Nani akozala nkolo na biso?”
5 “Lokola bato ya mpasi bazali kopunzama, lokola babola bazali kokimela,+Nakotɛlɛma sikoyo,” Yehova alobi bongo.+“Nakotya ye na esika ya libateli mosika na moto oyo azali kotyola ye.”+
6 Maloba ya Yehova ezali maloba ya pɛto,+Lokola palata oyo epɛtolami na litumbu ya konyangwisa oyo basalá na mabele, epɛtolami mbala nsambo.
7 Yo moko, Ee Yehova, okokɛngɛla bango;+Okobatela mokomoko mpo akwea te na mabɔkɔ ya libota oyo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.
8 Bato mabe bakotambola zingazinga,Mpamba te bana ya bato bakumisi makambo ya mpambampamba.+