Nzembo 119:1-176

א [ʼAlef] 119  Esengo na bato oyo bazangi mbeba na nzela na bango,+Bato oyo batambolaka na mobeko ya Yehova.+   Esengo na baoyo bazali kotosa makundoli na ye;+Bazali kolukaluka ye na motema na bango mobimba.+   Ya solo, bazali kosala likambo moko te ya kozanga boyengebene.+Batamboli na banzela na ye.+   Yo moko opesá mitindo na yo+Mpo etosama mpenza.+   Ee tiká banzela na ngai epikama makasi+Mpo natosa malako na yo!+   Boye nakoyoka nsɔni te,+Ntango nakotala mitindo na yo nyonso.+   Nakokumisa yo na bosembo ya motema,+Ntango nazali koyekola bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.+   Nazali se kobatela malako na yo.+Ee kosundola ngai te.+ ב [Bet]   Ndenge nini elenge mobali+ akopɛtola nzela na ye?Soki amibateli mpe asaleli liloba na yo.+  10  Naluki yo na motema na ngai mobimba.+Kobungisa ngai nzela ya mitindo na yo te.+  11  Nabombi liloba na yo malamu mpenza na motema na ngai,+Mpo nasalela yo lisumu te.+  12  Ee Yehova, opambwami.Teyá ngai malako na yo.+  13  Na mbɛbu na ngai, nasakoli+Bikateli nyonso ya lisambisi ya monɔkɔ na yo.+  14  Nasepeli mingi na nzela ya makundoli na yo,+Koleka biloko mosusu nyonso ya motuya.+  15  Nakomibanzabanza mpo na bitinda na yo,+Mpe nakotala banzela na yo.+  16  Nakolinga bitinda na yo mingi.+Nakobosana liloba na yo te.+ ג [Gimel]  17  Salelá mosaleli na yo makambo na ndenge oyo ebongi, mpo nazala na bomoi+Mpe nabatela liloba na yo.+  18  Fungolá miso na ngai, mpo natala+Makambo ya kokamwa oyo euti na mobeko na yo.+  19  Nazali kaka moto oyo afandi mopaya na mokili.+Kobombela ngai mitindo na yo te.+  20  Molimo na ngai etondi na mposa makasi+Ya bikateli na yo ya lisambisi, ntango nyonso.+  21  Opameli bato ya lofundo+ oyo balakelami mabe,Oyo bazali kotika mitindo na yo.+  22  Longolelá ngai nsɔni mpe lityo,+Mpo natosi makundoli na yo.+  23  Ata bankumu bafandi; balobani mpo na kotɛmɛla ngai.+Kasi mosaleli na yo azali komibanzabanza mpo na malako na yo.+  24  Lisusu, nalingaka makundoli na yo mingi,+Lokola bato oyo bapesaka ngai toli.+ ד [Dalet]  25  Molimo na ngai ekangani na putulu.+Batelá ngai na bomoi ndenge olobaki.+  26  Nasakoli banzela na ngai moko, mpo oyanola ngai.+Teyá ngai malako na yo.+  27  Salisá ngai nakanga ntina ya nzela ya bitinda na yo,+Mpo namibanzabanza mpo na misala na yo ya kokamwa.+  28  Molimo na ngai ezangi mpɔngi mpo na mawa.+Tɛlɛmisá ngai ndenge olobaki.+  29  Longolá nzela ya lokuta mosika na ngai,+Mpe moniselá ngai boboto na mobeko na yo.+  30  Naponi nzela ya bosembo.+Namoni ete bikateli na yo ya lisambisi ebongi.+  31  Nakangani na makundoli na yo.+Ee Yehova, koyokisa ngai nsɔni te.+  32  Nakopota mbangu na nzela ya mitindo na yo,+Mpo ozali kofungola motema na ngai.+ ה [Heʼ]  33  Ee Yehova, lakisá ngai nzela ya malako na yo,+Mpo natosa yango tii na nsuka.+  34  Salisá ngai nakanga ntina, mpo natosa mobeko na yo+Mpe mpo nabatela yango na motema mobimba.+  35  Tambwisá ngai na nzela ya mitindo na yo,+Mpo nasepeli na yango.+  36  Balusá motema na ngai epai ya makundoli na yo,+Kasi epai ya matomba te.+  37  Salá ete miso na ngai eleka kozanga kotala eloko oyo ezangi ntina;+Batelá ngai na bomoi na nzela na yo moko.+  38  Kokiselá mosaleli na yo liloba na yo+Oyo ezali kosala ete abanga yo.+  39  Lekisá nsɔni na ngai, oyo nazali kobanga,+Mpo bikateli na yo ya lisambisi ezali malamu.+  40  Talá! Nazali na mposa makasi ya bitinda na yo.+Batelá ngai na bomoi na boyengebene na yo.+ ו [Waw]  41  Ee Yehova, tiká motema boboto na yo eyela ngai,+Lobiko na yo na kolanda liloba na yo,+  42  Mpo, na liloba, nayanola moto oyo azali kosambwisa ngai,+Mpo natyeli liloba na yo motema.+  43  Mpe kolongola te liloba ya solo na monɔkɔ na ngai,+Mpo nazeli ekateli na yo ya lisambisi.+  44  Mpe nakobatela mobeko na yo ntango nyonso,+Mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ libela.+  45  Mpe nakotambolatambola na esika monene,+Mpo naluki bitinda na yo.+  46  Nakolobela mpe makundoli na yo liboso ya bakonzi,+Mpe nakoyoka nsɔni te.+  47  Mpe nakolinga makasi mitindo na yo+Oyo nalingá.+  48  Mpe nakotombola mabɔkɔ na ngai mpo na mitindo na yo oyo nalingá,+Mpe nakomibanzabanza mpo na malako na yo.+ ז [Zayin]  49  Kanisá lisusu liloba olobaki na mosaleli na yo,+Oyo ozelisi ngai mpo na yango.+  50  Yango nde libɔndisi na ngai na mpasi na ngai,+Mpo liloba na yo ebateli ngai na bomoi.+  51  Bato ya lofundo basɛki ngai mingi mpenza.+Natiki mobeko na yo te.+  52  Ee Yehova, nakanisi lisusu bikateli na yo ya lisambisi banda ntango oyo etyami ndelo te,+Mpe nazali komibɔndisa ngai moko.+  53  Nkanda makasi ekangi ngai mpo na bato mabe,+Oyo bazali kotika mobeko na yo.+  54  Malako na yo ekómi mindule na ngai+Na ndako ya bisika oyo nafandi mopaya.+  55  Ee Yehova, na butu, nakanisi lisusu nkombo na yo,+Mpo nabatela mobeko na yo.+  56  Yango mpe ekómi ya ngai,Mpo natosi bitinda na yo.+ ח [Het]  57  Yehova azali likabo na ngai;+Nalaki ete nakobatela maloba na yo.+  58  Nakitisi motema na yo na motema na ngai mobimba.+Moniselá ngai boboto na kolanda liloba na yo.+  59  Natali banzela na ngai,+Mpo nazongisa makolo na ngai na makundoli na yo.+  60  Nasalaki nokinoki, mpe naumelaki te+Mpo na kobatela mitindo na yo.+  61  Bansinga ya bato mabe ezingaki ngai.+Nabosanaki mobeko na yo te.+  62  Na midi ya butu nalamukaka mpo na kopesa yo matɔndi+Mpo na bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.+  63  Nazali moninga ya baoyo nyonso babangaka yo,+Mpe ya baoyo bazali kobatela bitinda na yo.+  64  Ee Yehova, motema boboto na yo etondisi mabele.+Teyá ngai malako na yo.+ ט [Tet]  65  Ee Yehova, osaleli mosaleli na yo malamu mpenza,+Na kolanda liloba na yo.+  66  Teyá ngai bolamu,+ mayele+ mpe boyebi,+Mpo nandimeli mitindo na yo.+  67  Liboso namona mpasi, nazalaki kosala masumu, kasi na nko te,+Nde sikoyo nabateli liloba na yo mpenza.+  68  Ozali malamu mpe ozali kosala makambo ya malamu.+Teyá ngai malako na yo.+  69  Bato ya lofundo babebisi lokumu na ngai na makambo ya lokuta.+Kasi ngai, nakotosa bitinda na yo na motema na ngai mobimba.+  70  Motema na bango ekómi makasi lokola libanga.*+Kasi ngai, nalingi mobeko na yo.+  71  Ezali malamu ndenge ngai namoni mpasi,+Mpo nayekola malako na yo.+  72  Mobeko+ ya monɔkɔ na yo ezali malamu mpo na ngai,+Koleka bankóto ya bashekele ya wolo mpe ya palata.+ י [Yod]  73  Mabɔkɔ na yo esali ngai, mpe etɛlɛmisi ngai makasi.+Salisá ngai nakanga ntina, mpo nayekola mitindo na yo.+  74  Baoyo bazali kobanga yo nde bato oyo bazali komona ngai mpe kosepela,+Mpo nazeli liloba na yo.+  75  Ee Yehova, nayebi malamu ete bikateli na yo ya lisambisi ezali boyengebene+Mpe na bosembo na yo, opesi ngai disiplini.+  76  Nabondeli yo, tiká motema boboto na yo ezala mpo na kobɔndisa ngai,+Ndenge olobaki na mosaleli na yo.+  77  Misala na yo ya motema mawa eyela ngai, mpo natikala na bomoi;+Mpo nalingi mobeko na yo mingi.+  78  Bato ya lofundo báyoka nsɔni, mpo babungisi ngai nzela kaka mpamba.+Kasi ngai, nazali komibanzabanza mpo na bitinda na yo.+  79  Baoyo bazali kobanga yo bázongela ngai,+Ná baoyo bayebi makundoli na yo.+  80  Motema na ngai ezali na mbeba te wana nazali kobatela malako na yo,+Mpo nayoka nsɔni te.+ כ [Kaf]  81  Molimo na ngai elɛmbi na mposa ya lobiko na yo;+Nazeli liloba na yo.+  82  Miso na ngai elɛmbi na mposa ya liloba na yo,+Wana nazali koloba: “Okobɔndisa ngai ntango nini?”+  83  Mpo nakómi lokola molangi ya mposo ya nyama+ na kati ya molinga.Nabosani malako na yo te.+  84  Mikolo ya mosaleli na yo ezali boni?+Ntango nini okopesa etumbu na baoyo bazali konyokola ngai?+  85  Bato ya lofundo batimoli mabulu mpo na kokanga ngai,+Baoyo bazali na bomoi oyo ezali kolanda mobeko na yo te.+  86  Mitindo na yo nyonso ezali sembo mpenza.+Banyokoli ngai kaka mpamba. Ee salisá ngai.+  87  Etikalaki kaka moke báboma ngai, nazala lisusu te na mabele;+Kasi ngai, natikaki bitinda na yo te.+  88  Batelá ngai na bomoi na kolanda motema boboto na yo,+Mpo nabatela bokundoli ya monɔkɔ na yo.+ ל [Lamed]  89  Ee Yehova, mpo na seko,+Liloba na yo ezali na likoló.+  90  Bosembo na yo ezali libota na libota.+Otɛlɛmisi mabele makasi, mpo etikala kaka bongo.+  91  Na boyokani na bikateli na yo ya lisambisi yango ezali tii na mokolo ya lelo,+Mpo nyonso ezali basaleli na yo.+  92  Soki nalingaka mobeko na yo mingi te,+Mbɛlɛ nakufaki na mpasi na ngai.+  93  Nakobosana bitinda na yo te tii na ntango oyo etyami ndelo te,+Mpo na nzela na yango nde obateli ngai na bomoi.+  94  Nazali moto na yo. Ee bikisá ngai,+Mpo naluki bitinda na yo.+  95  Bato mabe bazeli ngai, mpo báboma ngai.+Nazali se kotya likebi na makundoli na yo.+  96  Namoni nsuka ya eloko nyonso oyo ekoká.+Mitindo na yo ezali monene mingi. מ [Mem]  97  Nalingaka mobeko na yo mingi mpenza!+Ezali lobanzo na ngai mokolo mobimba.+  98  Mitindo na yo ekómisaka ngai na bwanya koleka banguna na ngai,+Mpamba te ezali ya ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+  99  Nakómi na mayele ya kososola mingi koleka bateyi na ngai nyonso,+Mpo makundoli na yo ezali lobanzo na ngai.+ 100  Nazali kosala na mayele mingi koleka mikóló,+Mpo natosi bitinda na yo.+ 101  Napekisi makolo na ngai nzela nyonso ya mabe,+Mpo nabatela liloba na yo.+ 102  Natiki bikateli na yo ya lisambisi te,+Mpo yo nde oteyi ngai.+ 103  Maloba na yo ezali sukali mpenza na edáda na ngai,Koleka mafuta ya nzoi na monɔkɔ na ngai!+ 104  Mpo na bitinda na yo nde nazali kosala na mayele.+Yango wana nayiná nzela nyonso ya lokuta.+ נ [Nun] 105  Liloba na yo ezali mwinda na lokolo na ngai,+Mpe pole na nzela na ngai.+ 106  Nalapi ndai, mpe nakokokisa yango,+Mpo na kobatela bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.+ 107  Namoni mpasi mingi mpenza.+Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda liloba na yo.+ 108  Nabondeli yo, Ee Yehova, sepelá na makabo ya bolingo ya monɔkɔ na ngai,+Mpe teyá ngai bikateli na yo ya lisambisi.+ 109  Molimo na ngai ezali na lobɔkɔ na ngai ntango nyonso;+Kasi nabosani mobeko na yo te.+ 110  Bato mabe batyeli ngai motambo,+Kasi nayengiyengi mosika na bitinda na yo te.+ 111  Nakómisi makundoli na yo eloko na ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Mpo ezali esengo ya motema na ngai.+ 112  Na motema na ngai nakani kosalela malako na yo+Mpo na ntango oyo etyami ndelo te, tii na nsuka.+ ס [Samek] 113  Nayini bato ya mitema mibale,+Kasi nalingi mobeko na yo.+ 114  Ozali esika na ngai ya kobombana mpe nguba na ngai.+Mpo nazeli liloba na yo.+ 115  Bólongwa mosika na ngai, bino basali-mabe,+Mpo natosa mitindo ya Nzambe na ngai.+ 116  Sungá ngai na kolanda liloba na yo, mpo natikala na bomoi,+Mpe koyokisa ngai nsɔni te mpo na elikya na ngai.+ 117  Simbá ngai, mpo nabika,+Mpe nakotalatala malako na yo ntango nyonso.+ 118  Obwaki baoyo nyonso batiki malako na yo;+Mpo bokosi na bango ezali makambo ya lokuta.+ 119  Osilisi bato mabe nyonso ya mabele lokola bosɔtɔ.+Yango wana nalingi makundoli na yo.+ 120  Nzoto na ngai elɛngi na nsɔmɔ na yo;+Mpe nabangi bikateli na yo ya lisambisi.+ ע [ʽAyin] 121  Nakati makambo na bosembo mpe na boyengebene.+Ee kosundola ngai te epai ya baoyo bazali kobuba ngai!+ 122  Zalá ndanga ya mosaleli na yo mpo na oyo ezali malamu.+Bato ya lofundo bábuba ngai te.+ 123  Miso na ngai elɛmbi na mposa ya lobiko na yo+Mpe liloba na yo ya boyengebene.+ 124  Salelá mosaleli na yo makambo na kolanda motema boboto na yo,+Mpe teyá ngai malako na yo.+ 125  Nazali mosaleli na yo.+ Salisá ngai nakanga ntina,+Mpo nayeba makundoli na yo.+ 126  Ntango ekoki mpo Yehova asala.+Babuki mobeko na yo.+ 127  Yango wana nalingi mitindo na yo+Mingi koleka wolo, ɛɛ wolo oyo epɛtolami.+ 128  Yango wana namoni ete bitinda nyonso oyo etali biloko nyonso ebongi;+Nayini nzela nyonso ya lokuta.+ פ [Peʼ] 129  Makundoli na yo ezali ya kokamwa.+Yango wana molimo na ngai etosi yango.+ 130  Soki bamonisi moto maloba na yo azwaka pole,+Esalisaka bato oyo bazangi mayele bákanga ntina.+ 131  Nafungoli monɔkɔ na ngai polele, mpo namɛla mpema,+Mpo nazali na mposa makasi ya mitindo na yo.+ 132  Baluká epai na ngai mpe moniselá ngai boboto,+Na kolanda ekateli na yo ya lisambisi epai ya baoyo balingaka nkombo na yo.+ 133  Piká makolo na ngai makasi na kati ya liloba na yo,+Mpe ata eloko moko te oyo eyokisaka mpasi ekonza ngai.+ 134  Sikolá ngai na moto nyonso oyo abubaka,+Mpe nakobatela bitinda na yo.+ 135  Ngɛngiselá mosaleli na yo elongi na yo,+Mpe teyá ngai malako na yo.+ 136  Mpisoli esopani na miso na ngai lokola mikɛli ya mai+Mpo babateli mobeko na yo te.+ צ [Tsade] 137  Ee Yehova, ozali moyengebene,+Mpe bikateli na yo ya lisambisi ezali sembo.+ 138  Lokola ozali na boyengebene mpe na bosembo mingi mpenza+Opesi biso mitindo tóbatela makundoli na yo.+ 139  Molende na ngai ebomi ngai,+Mpo banguna na ngai babosani maloba na yo.+ 140  Liloba na yo epɛtolami mingi mpenza,+Mpe mosaleli na yo alingaka yango.+ 141  Nazangi ntina mpe nazali moto mpamba.+Nabosani bitinda na yo te.+ 142  Boyengebene na yo ezali boyengebene mpo na seko,+Mpe mobeko na yo ezali solo.+ 143  Mpasi mpe mokakatano ezwaki ngai.+Nalingaki mitindo na yo mingi.+ 144  Boyengebene ya makundoli na yo ezali mpo na seko.+Salisá ngai nakanga ntina, mpo natikala na bomoi.+ ק [Kof] 145  Nabengi na motema na ngai mobimba.+ Ee Yehova, yanolá ngai.+Nakotosa malako na yo.+ 146  Nabeleli yo. Ee bikisá ngai!+Mpe nakobatela makundoli na yo.+ 147  Nalamuki ntɔngɔntɔngɔ na mwa pole+ ya kotana ya ntɔngɔ, mpo nabelela mpo na kosɛnga lisalisi.+Mpo nazeli maloba na yo.+ 148  Miso na ngai esilaki mpɔngi liboso ya bileko ya kokɛngɛla na butu,+Mpo namibanzabanza mpo na liloba na yo.+ 149  Ee yoká mongongo na ngai na kolanda motema boboto na yo.+Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda ekateli na yo ya lisambisi.+ 150  Baoyo bazali kolanda etamboli ya nsɔni+ bakómi pene;Bakei mosika na mobeko na yo.+ 151  Ee Yehova, ozali pene,+Mpe mitindo na yo nyonso ezali solo.+ 152  Banda kalakala nayebi makundoli na yo mosusu,+Mpo otyá moboko na yango mpo na seko.+ ר [Resh] 153  Ee talá mpasi na ngai, mpe bikisá ngai;+Mpo nabosani mobeko na yo te.+ 154  Ee sambá likambo na ngai mpe bikisá ngai;+Batelá ngai na bomoi na boyokani na liloba na yo.+ 155  Lobiko ezali mosika na bato mabe,+Mpo baluki malako na yo te.+ 156  Ee Yehova, misala na yo ya motema mawa ezali mingi.+Ee batelá ngai na bomoi na kolanda bikateli na yo ya lisambisi.+ 157  Banyokoli na ngai mpe banguna na ngai bazali ebele.+Natiki makundoli na yo te.+ 158  Namoni baoyo basalaka na bokosi,+Mpe nayoki mpii, mpo babateli liloba na yo te.+ 159  Ee moná ete nalingi mitindo na yo.+Ee Yehova, batelá ngai na bomoi na kolanda motema boboto na yo.+ 160  Liloba na yo mobimba ezali solo,+Mpe ekateli na yo nyonso ya lisambisi ezali mpo na seko.+ ש [Sin] to [Shin] 161  Bankumu banyokoli ngai kozanga ntina,+Kasi motema na ngai eyoki nsɔmɔ ya maloba na yo.+ 162  Nasepeli na liloba na yo mingi+Ndenge moto asepelaka ntango apunzi biloko mingi.+ 163  Nayiná lokuta,+ mpe nazali se koyina yango mpenza.+Nalingi mobeko na yo.+ 164  Mbala nsambo na mokolo, nasanzoli yo+Mpo na bikateli na yo ya lisambisi ya boyengebene.+ 165  Baoyo bazali kolinga mobeko na yo bazali na kimya mingi,+Mpe eloko ya kobɛtisa bango libaku ezali te.+ 166  Ee Yehova, natye elikya na lobiko na yo,+Mpe nasaleli mitindo na yo.+ 167  Molimo na ngai ebateli makundoli na yo,+Mpe nalingaka yango mingi koleka.+ 168  Nabateli bitinda na yo mpe makundoli na yo,+Mpo banzela na ngai nyonso ezali liboso na yo.+ ת [Taw] 169  Ee Yehova, kosɛngasɛnga na ngai ya kolela epusana liboso na yo.+Ee salisá ngai nakanga ntina+ engebene liloba na yo. 170  Tiká lilɔmbɔ na ngai mpo na kondimama ekɔta liboso na yo.+Ee bikisá ngai engebene liloba na yo.+ 171  Mbɛbu na ngai esopa lisanzoli,+Mpo oteyaka ngai malako na yo.+ 172  Lolemo na ngai eyemba liloba na yo,+Mpo mitindo na yo nyonso ezali boyengebene.+ 173  Lobɔkɔ na yo ezala mpo na kosalisa ngai,+Mpo naponá bitinda na yo.+ 174  Ee Yehova, nazali na mposa makasi ya lobiko na yo,+Mpe nalingi mobeko na yo mingi.+ 175  Tiká molimo na ngai ekoba kozala na bomoi mpe esanzola yo,+Mpe bikateli na yo ya lisambisi esalisa ngai.+ 176  Nayengiyengi lokola mpate oyo ebungi.+ Ee luká mosaleli na yo,+Mpo nabosani mitindo na yo te.+

Maloba na nse

Lil., “Motema na bango ezali koyoka eloko te lokola mafuta.”