Nzembo 118:1-29

118  Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.+   Yisraele aloba sikoyo:“Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”+   Bato ya ndako ya Arona báloba sikoyo:+“Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”+   Baoyo bazali kobanga Yehova báloba sikoyo:+“Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.”+   Na ntango ya mitungisi nabelelaki Yah;+Yah ayanolaki ngai mpe atyaki ngai na esika moko monene.+   Yehova azali pene na ngai; nakobanga te.+Moto ya mabele akoki kosala ngai nini?+   Yehova azali na ngai esika moko na baoyo bazali kosalisa ngai,+Bongo baoyo bazali koyina ngai, nakotala bango na nse.+   Kokima epai ya Yehova ezali malamu+Koleka kotyela moto ya mabele motema.+   Kokima epai ya Yehova ezali malamu+Koleka kotyela bankumu motema.+ 10  Bikólo nyonso bazingaki ngai.+Nazalaki kobengana bango nde na nkombo ya Yehova.+ 11  Bazingaki ngai, ɛɛ, basilaki kozinga ngai.+Nazalaki kobengana bango nde na nkombo ya Yehova. 12  Bazingaki ngai lokola nzoi;+Bakufaki lokola mɔtɔ ya banzete ya nzubɛ.+Nazalaki kobengana bango nde na nkombo ya Yehova.+ 13  Otindikaki ngai makasi nakwea,+Kasi Yehova ye moko asalisaki ngai.+ 14  Yah azali esika na ngai ya komibatela mpe nguya na ngai,+Mpe azali kokóma lobiko na ngai.+ 15  Mongongo ya koganga ya esengo mpe lobiko+Ezali na bahema+ ya bayengebene.+Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ezali na nguya mingi.+ 16  Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova etombwani;+Lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ezali na nguya mingi.+ 17  Nakokufa te, kasi nakotikala na bomoi,+Mpo nasakola misala ya Yah.+ 18  Yah asembolaki ngai makasi,+Kasi akabaki ngai na liwa te.+ 19  Bófungolela ngai baporte ya boyengebene.+Nakokɔta kuna; nakokumisa Yah.+ 20  Porte ya Yehova yango oyo.+Bayengebene bakokɔta kuna.+ 21  Nakokumisa yo, mpo oyanolaki ngai+Mpe okómaki lobiko na ngai.+ 22  Libanga oyo batongi-ndako babwakaki+Ekómi libanga monene ya litumu ya ndako.+ 23  Yango euti na Yehova ye moko;+Ezali likambo ya kokamwa na miso na biso.+ 24  Oyo nde mokolo oyo Yehova asali;+Tokozala na esengo mingi mpe tokosepela na yango.+ 25  Aa, sikoyo, Yehova, bikisá biso, tobondeli yo!+Aa, sikoyo, Yehova, longisá biso, tobondeli yo!+ 26  Ye oyo azali koya na nkombo ya Yehova apambwama;+Topamboli bino uta na ndako ya Yehova.+ 27  Yehova nde azali Nzambe,+Mpe apesaka biso pole.+Bóbongisa bitape+ mpo na molɔngɔ ya bato oyo bazali kotambola na fɛti,+Kino na maseke ya etumbelo.+ 28  Yo nde Nzambe na ngai, mpe nakokumisa yo;+Nzambe na ngai​—nakotombola yo.+ 29  Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.+

Maloba na nse