Nzembo 116:1-19
116 Nalingaka mpenza ntango Yehova ayokaka+Mongongo na ngai, malɔmbɔ na ngai.+
2 Mpo asemboleli ngai litoi na ye,+Mpe mikolo na ngai nyonso, nakobenga.+
3 Bansinga ya liwa ezingaki ngai+Mpe mitungisi ya Nkunda* ezwaki ngai.+Nazalaki se komona mpasi ná mawa.+
4 Kasi nabelelaki nkombo ya Yehova:+“Aa, Yehova, bikisá mpenza molimo na ngai!”+
5 Yehova azali na ngɔlu mpe azali moyengebene;+Mpe Nzambe na biso azali Nzambe oyo ayokelaka bato mawa.+
6 Yehova azali kobatela baoyo bazangi mayele.+Makasi na ngai esilaki, mpe ye abikisaki ngai.+
7 Ee molimo na ngai, zongá na esika na yo ya kopema,+Mpo Yehova asaleli yo makambo na ndenge oyo ebongi.+
8 Mpo obikisi molimo na ngai na liwa,+Liso na ngai na mpisoli, lokolo na ngai na libaku.+
9 Nakotambola+ liboso ya Yehova na mikili ya baoyo bazali na bomoi.+
10 Nazalaki na kondima,+ yango wana nalobaki.+Ngai namonaki mpasi mingi.
11 Ngai, nalobaki boye ntango nakómaki na nsɔmɔ:+“Moto nyonso azali mobuki lokuta.”+
12 Nakofuta Yehova eloko nini+Mpo na bolamu na ye nyonso oyo asalelá ngai?+
13 Nakozwa kɔpɔ ya lobiko monene,+Mpe nakobelela nkombo ya Yehova.+
14 Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova,+Ɛɛ, liboso ya bato na ye nyonso.
15 Liwa ya bato ya sembo ya YehovaEzali likambo monene mpenza na miso na ye.+
16 Aa, sikoyo, Ee Yehova,+Mpo nazali mosaleli na yo.+Nazali mosaleli na yo, mwana ya moombo na yo ya mwasi.+Ofungoli bansinga na ngai.+
17 Nakokabela yo mbeka ya kozongisa matɔndi,+Mpe nakobelela nkombo ya Yehova.+
18 Nakokokisa bilako na ngai epai ya Yehova,+Ɛɛ, liboso ya bato na ye nyonso,+
19 Na mapango ya ndako ya Yehova,+Epai na yo, Ee Yerusaleme.+Bósanzola Yah!+
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.