Nzembo 115:1-18

115  Eloko moko te ezali ya biso, Ee Yehova, eloko moko te ezali ya biso,+Pesá nde nkombo na yo nkembo+Na motema boboto na yo, na bosolo na yo.+   Mpo na nini bikólo báloba:+“Sikoyo Nzambe na bango azali wapi?”+   Nzokande Nzambe na biso azali na likoló;+Eloko nyonso oyo asepelaki kosala, asalá yango.+   Bikeko na bango ezali palata mpe wolo,+Esalemi na mabɔkɔ ya moto ya mabele.+   Ezali na monɔkɔ, kasi elobaka te;+Ezali na miso, kasi emonaka te;+   Ezali na matoi, kasi eyokaka te.+Ezali na zolo, kasi eyokaka nsolo te.+   Ezali na mabɔkɔ, kasi esimbaka eloko te.+Ezali na makolo, kasi etambolaka te;+Ebimisaka ata liloba moko te na mongongo na yango.+   Baoyo bazali kosala yango bakokóma lokola yango,+Baoyo nyonso bazali kotyela yango motema.+   Ee Yisraele, tyelá Yehova motema;+Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.+ 10  Ee ndako ya Arona, bótyela Yehova motema;+Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.+ 11  Bino baoyo bobangaka Yehova, bótyela Yehova motema;+Azali lisalisi na bango mpe nguba na bango.+ 12  Yehova ye moko akanisi biso lisusu; akopambola,+Akopambola ndako ya Yisraele,+Akopambola ndako ya Arona.+ 13  Akopambola baoyo bazali kobanga Yehova,+Bato mike ná bato minene.+ 14  Yehova akokómisa bino ebele,+Bino mpe bana na bino.+ 15  Bozali bato oyo Yehova apamboli,+Ye Mokeli ya likoló ná mabele.+ 16  Nde likoló, likoló ezali ya Yehova,+Kasi mabele, apesá yango bana ya bato.+ 17  Bakufi basanzolaka Yah te,+Ezala mpe moto nyonso oyo azali kokita na esika ya kimya.+ 18  Kasi biso, tokopambola Yah+Banda sikoyo mpe mpo na libela.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse