Nzembo 114:1-8
114 Ntango Yisraele abimaki na Ezipito,+Ndako ya Yakobo eutaki epai ya bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ moko ya makasi,+
2 Yuda ekómaki esika na ye mosantu,+Yisraele bokonzi na ye monene.+
3 Mbu emonaki mpe ekimaki;+Bongo Yordani ebandaki kozonga nsima.+
4 Bangomba epumbwaki lokola bampate-mibali,+Bangomba mike lokola bana-mpate.
5 Ee mbu, osalaki likambo nini mpo okima,+Ee Yordani, mpo obanda kozonga nsima?+
6 Ee bangomba, mpo bópumbwapumbwa lokola bampate-mibali;+Ee bangomba mike, lokola bana-mpate?+
7 Ee mabele, lɛngá liboso ya Nkolo,+Mpo na Nzambe ya Yakobo,
8 Oyo azali kokómisa libanga etima oyo etondi na matiti,+Oyo azali kokómisa libanga ya silekise liziba ya mai.+