Nzembo 113:1-9

113  Bósanzola Yah!+Ee bino basaleli ya Yehova, bópesa masanzoli,+Bósanzola nkombo ya Yehova.+   Nkombo ya Yehova epambwama+Banda sikoyo mpe mpo na seko.+   Banda epai moi ebimaka kino epai yango elalaka+Nkombo ya Yehova esengeli kosanzolama.+   Yehova akómi likoló ya bikólo nyonso;+Nkembo na ye ezali mosika koleka likoló.+   Nani azali lokola Yehova Nzambe na biso,+Ye oyo azali kosala esika na ye ya kofanda kuna na likoló?+   Azali komikitisa mpo na kotala likoló mpe mabele,+   Azali kolongola moto oyo azangá na putulu mpenza+ mpe azali kotɛlɛmisa ye;Alongolaka mobola na libulu ya putulu ya mɔtɔ mpe azali kotombola ye,+   Mpo na kofandisa ye esika moko na bankumu,+Esika moko na bankumu ya bato na ye.+   Azali kofandisa mwasi ekomba na ndako,+Akómi mama ya bana oyo atondi na esengo.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse