Nzembo 112:1-10
112 Bósanzola Yehova!+א [ʼAlef]
Esengo na moto oyo azali kobanga Yehova,+ב [Bet]
Oyo asepeli mingi+ na mitindo na ye.+
ג [Gimel]
2 Bana na ye bakokóma na nguya na mabele.+ד [Dalet]
Kasi libota ya bato ya makambo alima ekopambolama.+
ה [Heʼ]
3 Biloko ya motuya mpe bomɛngo ezali na ndako na ye;+ו [Waw]
Mpe boyengebene na ye ezali mpo na libela.+
ז [Zayin]
4 Angɛngi na molili lokola pole ya bato ya makambo alima.+ח [Het]
Azali na ngɔlu mpe na motema mawa mpe azali moyengebene.+
ט [Tet]
5 Moto oyo azali na ngɔlu+ mpe azali kodefisa+ azali moto malamu.י [Yod]
Atambwisaka makambo na ye na bosembo.+
כ [Kaf]
6 Mpo akotengatenga soki moke te.+ל [Lamed]
Bakokanisa moyengebene mpo na seko.+
מ [Mem]
7 Akobanga nsango mabe te.+נ [Nun]
Motema na ye ezali kotengatenga te,+ ezali kotalela Yehova.+
ס [Samek]
8 Motema na ye ekoki koningana te;+ akobanga te,+ע [ʽAyin]
Kino akotala banguna na ye na nse.+
פ [Peʼ]
9 Akabi biloko mingi; apesi babola.+צ [Tsade]
Boyengebene na ye ezali mpo na libela.+ק [Kof]
Liseke na ye ekotombwama na nkembo.+
ר [Resh]
10 Moto mabe akomona mpe akoyoka mpenza nkanda.+ש [Shin]
Akolya mino mpe akonyangwa mpenza.+ת [Taw]
Mposa ya bato mabe ekokufa.+