Nzembo 111:1-10
111 Bósanzola Yah!+א [ʼAlef]Nakokumisa Yehova na motema na ngai mobimba+ב [Bet]
Na etuluku+ ya baninga ya motema—bato ya makambo alima—mpe na liyangani.+
ג [Gimel]
2 Misala ya Yehova ezali minene,+ד [Dalet]
Baoyo nyonso basepelaka na yango bayekolaka yango.+
ה [Heʼ]
3 Mosala na ye+ ezali ya lokumu mpe ya nkembo mpenza,+ו [Waw]
Mpe boyengebene na ye ezali mpo na libela.+
ז [Zayin]
4 Asalá ekaniseli mpo na misala na ye ya kokamwa.+ח [Het]
Yehova azali na ngɔlu mpe na motema mawa.+
ט [Tet]
5 Apesi baoyo babangaka ye bilei.+י [Yod]
Akokanisa kondimana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
כ [Kaf]
6 Ayebisá bato na ye nguya ya misala na ye,+ל [Lamed]
Na ndenge apesá bango libula ya bikólo.+
מ [Mem]
7 Misala ya mabɔkɔ na ye ezali solo mpe bosembo;+נ [Nun]
Mitindo nyonso oyo apesaka ebongi kotyelama motema,+
ס [Samek]
8 Esimbami malamu mpo na libela, mpo na seko,+ע [ʽAyin]
Esalemi na solo mpe na bosembo.+
פ [Peʼ]
9 Atindeli bato na ye lisiko.+צ [Tsade]
Apesi mitindo ya kondimana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ק [Kof]
Nkombo na ye ezali mosantu mpe nsɔmɔ.+
ר [Resh]
10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.+ש [Sin]
Baoyo nyonso bazali kosalela yango bazalaka mpenza na mayele ya kososola.+ת [Taw]
Lisanzoli na ye ezali mpo na seko.+