Nzembo 11:1-7
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi.
11 Nakimi epai ya Yehova.+Ebanda boni bóloba na molimo na ngai:“Kimá na ngomba na bino lokola ndɛkɛ!+
2 Mpo talá, bato mabe bazali kogumba litimbo,+Bazali kobongisa likula na bango na nsinga ya litimbo,Mpo, na molili, bábwakela yango bato oyo bazali na motema sembo.+
3 Soki miboko ebukami,+Moyengebene akosala nini?”
4 Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+Yehova—kiti na ye ya bokonzi ezali na likoló.+Miso na ye ezali kotala, miso na ye ya kongɛnga ezali kotalatala+ bana ya bato.
5 Yehova ye moko atalatalaka moyengebene ná moto mabe,+Mpe molimo na Ye eyinaka mpenza moto oyo alingaka mobulu.+
6 Akonɔkisela bato mabe mitambo, mɔtɔ ná sufulu+Mpe mopɛpɛ ya kozikisa, ekozala likabo ya kɔpɔ na bango.+
7 Mpo Yehova azali moyengebene;+ alingaka misala ya boyengebene.+Bato oyo bazali sembo nde bakomona elongi na ye.+