Nzembo 109:1-31
Epai ya mokambi ya nzembo. Ya Davidi. Mondule.
109 Ee Nzambe ya lisanzoli na ngai,+ kofanda nyɛɛ te.+
2 Mpo moto mabe ná moto ya bokosi bafungoleli ngai monɔkɔ.+Balobeli ngai na lolemo ya lokuta;+
3 Mpe bazingi ngai na maloba ya koyina,+Mpe bazali kobunda na ngai kaka mpamba.+
4 Na esika ya bolingo oyo nazali kolinga bango, bazali nde kotɛmɛla ngai;+Kasi ngai nazali kobondela.+
5 Mpe bazali kozongisela ngai mabe mpo na malamu+Mpe koyina mpo na bolingo oyo nazali kolinga bango.+
6 Tyá moto moko ya mabe ayangela ye,Mpe motɛmɛli+ atɛlɛma na lobɔkɔ na ye ya mobali.
7 Ntango asambisami, emonana ete azali moto moko mabe;Mpe libondeli na ye ekóma lisumu.+
8 Mikolo na ye ezala moke;+Moto mosusu azwa mokumba na ye ya kokɛngɛla.+
9 Bana na ye bázala bana oyo tata akufá+Mpe mwasi na ye azala mwasi oyo mobali akufá.+
10 Mpe bana na ye báyengayenga mpenza;+Mpe básɛngasɛnga biloko,Mpe báluka bilei na bisika na bango oyo etikalá mpamba.+
11 Modefisi oyo asɛngaka benefisi na lokoso atya mitambo mpo na nyonso oyo azali na yango,+Mpe bapaya+ bápunza biloko oyo amonelaki mpasi.+
12 Azala na moto te oyo akomonisela ye motema boboto,+Mpe ezala na moto te oyo akomonisela bana na ye ya mibali oyo batikali bitike boboto.
13 Bana na ye bázala bato ya kobomama.+Nkombo na bango elongolama na libota oyo ekolanda.+
14 Libunga ya bankɔkɔ na ye, Yehova abosana yango te,+Mpe lisumu ya mama na ye+—elongolama te.+
15 Ezala ntango nyonso liboso ya Yehova;+Mpe alongola na mabele makambo oyo ekosala ete bákanisa bango;+
16 Mpo abosanaki kosalela motema boboto,+Kasi azalaki se kolanda moto ya mpasi mpe mobola+Mpe moto oyo azali na mawa mingi na motema, mpo na koboma ye.+
17 Mpe azalaki se kolinga elakeli mabe,+ bongo yango eyelaki ye;+Mpe asepelaki na lipamboli te,+Bongo yango ekómaki mosika na ye;+
18 Mpe balatisaki ye elakeli mabe lokola elamba.+Bongo ekɔtaki lokola mai na kati na ye+Mpe lokola mafuta na kati ya mikuwa na ye.
19 Ezala mpo na ye lokola elamba oyo amilíngaka+Mpe lokola mokaba oyo alataka ntango nyonso.+
20 Yango nde lifuti oyo euti na Yehova mpo na moto oyo azali kotɛmɛla ngai+Mpe mpo na baoyo bazali koloba mabe mpo na molimo na ngai.+
21 Kasi yo ozali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+Salelá ngai bolamu mpo na nkombo na yo.+Lokola motema boboto na yo ezali malamu, bikisá+ ngai.
22 Mpo nazali na mpasi mpe nazali mobola,+Mpe motema na ngai etɔbɔlami.+
23 Lokola elili ntango ezali kolimwa, nasengeli kokende;+Napupolami lokola liyoyo.
24 Mabɔlɔngɔ na ngai elɛngi na kokila bilei,+Mpe mosuni na ngai ekɔndi, ezali na mafuta te.+
25 Mpe ngai nakómi na miso na bango eloko moko ya kosambwisa.+Soki bamoni ngai—babandi koningisa motó.+
26 Ee Yehova Nzambe na ngai, salisá ngai;+Bikisá ngai na motema boboto na yo.+
27 Mpe báyeba ete oyo nde lobɔkɔ na yo;+Ete yo moko, Ee Yehova, osali yango.+
28 Bango bálakela mabe,+Kasi yo, pambolá.+Batɛlɛmi, kasi báyoka nsɔni,+Mpe mosaleli na yo asepela.+
29 Baoyo bazali kotɛmɛla ngai bálata nsɔni,+Mpe bámizipa nsɔni na bango lokola kazaka ezangá mabɔkɔ.+
30 Nakokumisa Yehova mingi na monɔkɔ na ngai,+Mpe na kati ya bato ebele nakosanzola ye.+
31 Mpo akotɛlɛma na lobɔkɔ ya mobali ya mobola,+Mpo na kobikisa ye na mabɔkɔ ya baoyo bazali kosambisa molimo na ye.