Nzembo 108:1-13

Loyembo. Mondule ya Davidi. 108  Ee Nzambe, motema na ngai ezali kotengatenga te.+Nakoyemba mpe nakobɛta mondule,+Nkembo na ngai+ mpe ekosala yango.   Ee ebɛtɛlo ya nsinga, lamuká; Ee nzɛnzɛ, ná yo mpe.+Nakolamwisa kotana ya ntɔngɔ.+   Ee Yehova, nakokumisa yo na kati ya bato ya bikólo;+Mpe nakobɛtɛla yo mondule na kati ya bituluku ya bato ya bikólo.+   Mpo motema boboto na yo ezali monene kino na likoló,+Mpe bosolo na yo kino na mapata.+   Ee okumisama kuna na likoló, Ee Nzambe;+Mpe nkembo na yo ezala na likoló ya mabele mobimba.+   Mpo bato oyo olingaka bábikisama,+Ee bikisá na lobɔkɔ na yo ya mobali mpe yanolá ngai.+   Nzambe ye moko alobi na kati ya bosantu na ye:+“Nakosepela makasi, nakopesa Shekeme+ ezala likabo;+Mpe nakomeka bonene ya lobwaku ya patatalu ya Sukote.+   Gileade+ ezali ya ngai; Manase+ ezali ya ngai;Mpe Efraime ezali ndako ya makasi ya nkumu na ngai;+Yuda ezali lingenda na ngai ya komanda.+   Moabe+ ezali nzungu na ngai ya kosukola.+Nakobwakela Edome+ sandale na ngai.+Nakoganga ete nalongi+ Filistia.”+ 10  Nani akomema ngai na engumba oyo ebatelami makasi?+Nani akokamba mpenza ngai kino na Edome?+ 11  Ee Nzambe, yo moto obwaki biso+Mpe yo Nzambe na biso ozali kobima te elongo na mampinga na biso, boye te?+ 12  Sungá biso tólongwa na mpasi,+Mpo lobiko oyo euti na moto ya mabele ezali mpamba.+ 13  Tokozwa nguya ya bomoi oyo euti na Nzambe,+Mpe ye moko akonyata banguna na biso.+

Maloba na nse