Nzembo 107:1-43

(Nzembo 107 – 150) 107  Ee bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.+   Basikolami ya Yehova báloba bongo,+Baoyo asikoli na lobɔkɔ ya monguna,+   Mpe baoyo ayanganisi uta na mikili,+Uta epai moi ebimaka mpe epai moi elalaka,+Uta na nɔrdi mpe uta na sudi.+   Bayengayengaki na esobe,+ na mokili oyo ekauká;+Bamonaki nzela moko te ya kokende na engumba ya kofanda.+   Bayokaki nzala, mpe mposa ya mai;+Molimo na bango na kati na bango ebandaki kolɛmba makasi.+   Mpe bazalaki se kobelela Yehova na mpasi na bango;+Bongo abikisaki bango na mitungisi oyo bazalaki na yango,+   Mpe atambwisaki bango na nzela ya malamu,+Mpo bákóma na engumba ya kofanda.+   Ee bápesa Yehova matɔndi mpo na motema boboto na ye+Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.+   Mpo atondisi molimo oyo ekauki;+Mpe atondisi molimo ya nzala na biloko ya malamu.+ 10  Ezali na baoyo bazalaki kofanda na molili mpe na molili makasi,+Bato ya bolɔkɔ na kati ya mpasi mpe na bibende.+ 11  Mpo baboyaki kotosa+ maloba ya Nzambe;+Mpe bamemyaki toli ya Oyo-Aleki-Likoló te.+ 12  Na yango, na nzela ya mpasi, atyaki motema na bango na nse;+Babɛtaki libaku, mpe moto ya kosalisa bango azalaki te.+ 13  Mpe babandaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi na mpasi na bango;+Abikisaki bango na mitungisi na bango, lokola na momeseno.+ 14  Bongo abimisaki bango na molili mpe na molili makasi,+Mpe akataki bansinga na bango.+ 15  Ee bápesa Yehova matɔndi mpo na motema boboto na ye+Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.+ 16  Mpo abuki baporte ya motako,+Mpe akati ata bikangiseli ya ebende.+ 17  Baoyo bazalaki bazoba, mpo na nzela na bango ya kobuka mibeko+Mpe mpo na mabunga na bango, nsukansuka bamilukelaki mpasi bango moko.+ 18  Molimo na bango ekómaki koyina bilei ya ndenge nyonso,+Mpe bazalaki kokóma na baporte ya liwa.+ 19  Mpe babandaki kobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi na mpasi na bango;+Abikisaki bango na mitungisi na bango, lokola na momeseno.+ 20  Atindaki liloba na ye mpe abikisaki bango na maladi+Mpe abikisaki bango mpo bákɔta na mabulu na bango te.+ 21  Ee bápesa Yehova matɔndi mpo na motema boboto na ye+Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.+ 22  Mpe bákaba bambeka ya kozongisa matɔndi+Mpe básakola misala na ye na koganga ya esengo.+ 23  Baoyo bazali kokita na bamasuwa na mbu,+Bazali kosala mombongo na mai minene,+ 24  Bango nde bamoná misala ya Yehova+Mpe misala na ye ya kokamwa na bisika ya bozindo;+ 25  Ndenge alobaka liloba mpe abimisaka mopɛpɛ makasi,+Bongo yango etombolaka bambonge ya mbu.+ 26  Bango bamataka na likoló,Bakitaka na bozindo, na nse.Mpo na mpasi, molimo na bango enyangwe.+ 27  Bayokaka kizunguzungu mpe batengatengaka lokola moto oyo alangwe masanga,+Mpe ata bwanya na bango nyonso ebulunganaka.+ 28  Mpe babelelaka Yehova na mpasi na bango,+Mpe alongolaka bango na mitungisi na bango.+ 29  Akómisaka mopɛpɛ makasi kimya,+Bongo bambonge ya mbu efandaka nyɛɛ.+ 30  Mpe basepelaka mpo yango ekómi nyɛɛ,Mpe akambaka bango na libongo oyo basepelaka na yango.+ 31  Ee bápesa Yehova matɔndi mpo na motema boboto na ye+Mpe mpo na misala na ye ya kokamwa epai ya bana ya bato.+ 32  Mpe bákumisa ye na lisangá ya bato;+Mpe na esika mikóló bafandaka, bákumisa ye.+ 33  Akómisaka bibale esobe,+Mpe maziba ya mai mabele ekauká,+ 34  Mabele oyo ebotaka, akómisaka yango mokili ya mungwa,+Mpo na mabe ya baoyo bazali kofanda kuna. 35  Akómisaka esobe etima oyo etondi na matiti,+Mpe mokili ya etúká oyo ezangá mai maziba ya mai.+ 36  Mpe afandisaka bato ya nzala kuna,+Bongo bapikaka makasi engumba ya kofanda.+ 37  Mpe balonaka bilanga mpe balonaka bilanga ya vinyo,+Mpo yango ebota ebele ya mbuma ya kobuka.+ 38  Mpe apambolaka bango, bongo bakómaka ebele mpenza;+Mpe atikaka bibwɛlɛ na bango ekóma moke te.+ 39  Lisusu bakómaka moke mpe bagunzamaka+Mpo na monyoko, mpasi mpe mawa.+ 40  Atyolaka mpenza bato ya lokumu,+Bongo atindaka bango báyengayenga na esika moko ya mpamba, esika nzela ezali te.+ 41  Kasi abatelaka mobola na ntango ya mpasi+Mpe akómisaka ye mabota ebele lokola etonga.+ 42  Bato ya makambo alima bamonaka mpe basepelaka;+Kasi monɔkɔ ya bato nyonso oyo bazangi boyengebene ekokangama.+ 43  Nani azali na bwanya? Akotyela makambo yango likebi+Mpe lisusu akotyela misala ya motema boboto ya Yehova likebi.+

Maloba na nse