Nzembo 106:1-48

106  Bósanzola Yah!+Bópesa Yehova matɔndi, mpo azali malamu;+Mpo motema boboto na ye ezali seko na seko.+   Nani akoki kolobela misala ya nguya ya Yehova,+To nani akoki kosala ete lisanzoli na ye nyonso eyokana?+   Esengo na baoyo bazali kobatela bosembo,+Bazali kosalela boyengebene ntango nyonso.+   Ee Yehova, kanisá ngai, sepelá na ngai ndenge osepelaka na bato na yo.+Batelá ngai na lobiko na yo,+   Mpo namona bolamu oyo osalelaka bato oyo oponá,+Mpo nasepela na esengo ya ekólo na yo,+Mpo namikumisa elongo na libula na yo.+   Tosali masumu se lokola bankɔkɔ na biso;+Tosali libunga; tosali mabe.+   Bankɔkɔ na biso na EzipitoBamonisaki ata moke te ete bazali na mayele ya kososola liboso ya misala na yo ya kokamwa.+Bakanisaki te bonene ya motema boboto na yo ya kokamwa,+Kasi na mbu, pene na Mbu Motane, batombokaki.+   Mpe abikisaki bango mpo na nkombo na ye,+Mpo na koyebisa nguya na ye.+   Bongo apamelaki Mbu Motane, mpe ekaukaki malɛmbɛmalɛmbɛ;+Mpe atambwisaki bango na mai mozindo lokola na esobe;+ 10  Bongo abikisaki bango na lobɔkɔ ya moyini+Mpe asikolaki bango na lobɔkɔ ya monguna.+ 11  Mpe mai eyaki kozipa banguna na bango;+Moko te kati na bango atikalaki.+ 12  Bongo bandimelaki liloba na ye;+Babandaki koyemba lisanzoli na ye.+ 13  Nokinoki, babosanaki misala na ye;+Bazelaki toli na ye te.+ 14  Kasi na esobe, bamonisaki mposa na bango na lokoso+Mpe bamekaki Nzambe na esobe.+ 15  Mpe apesaki bango eloko oyo basɛngaki+Mpe atindaki maladi ya kokɔnda na kati ya molimo na bango.+ 16  Mpe babandaki koyokela Moize likunya na kaa,+Ata Arona, mosantu ya Yehova.+ 17  Bongo mabele efungwamaki mpe emɛlaki Datane,+Mpe ezipaki liyangani ya Abirame.+ 18  Mpe mɔtɔ epelaki na kati ya liyangani na bango;+Lolemo ya mɔtɔ ezikisaki bato mabe.+ 19  Lisusu, basalaki mwana-ngɔmbɛ na Horebe+Mpe bagumbamelaki ekeko ya ebende oyo enyangwisami,+ 20  Bongo batyaki elilingi ya ngɔmbɛ, molei ya matiti,+Na esika ya nkembo na ngai.+ 21  Babosanaki Nzambe Mobikisi na bango,+Moto oyo asalaki makambo ya minene na Ezipito,+ 22  Misala ya kokamwa na mokili ya Kame,+Makambo ya nsɔmɔ na Mbu Motane.+ 23  Mpe etikalaki moke aloba ete akosilisa bango nyɛɛ,+Soki Moize te, moto oyo ye aponá,Oyo atɛlɛmaki na libulu liboso na ye,+Mpo na kozongisa nsima nkanda na ye makasi mpo abebisa bango te.+ 24  Mpe bakómaki komona mokili ya kitoko eloko mpamba;+Bandimelaki liloba na ye te.+ 25  Mpe bazalaki se koimaima na bahema na bango;+Bayokaki mongongo ya Yehova te.+ 26  Bongo atombolaki lobɔkɔ na ye mpo na kolapela bango ndai,+Ete akokweisa bango na esobe,+ 27  Mpe ete akokweisa bana na bango na bikólo,+Mpe ete akopalanganisa bango na mikili.+ 28  Mpe babandaki kokangama na Baala ya Peore+Mpe kolya bambeka oyo bapesi na biloko oyo ezali na bomoi te.+ 29  Lokola bazalaki kopesa ye nkanda na misala na bango,+Mpasi moko ebimaki na kati na bango.+ 30  Ntango Finehase atɛlɛmaki mpe akɔti na likambo yango,+Mpasi yango esukaki. 31  Mpe yango esalaki ete atángama moto ya boyengebeneLibota na libota mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 32  Lisusu na mai ya Meriba, batumolaki,+Bongo makambo ebebelaki Moize mpo na bango.+ 33  Mpo basilikisaki elimo na yeMpe na mbɛbu na ye, abandaki koloba maloba oyo akanaki te.+ 34  Basilisaki bato ya bikólo nyɛɛ te,+Ndenge Yehova alobaki na bango.+ 35  Mpe basanganaki na bikólo+Mpe bayekolaki misala na bango.+ 36  Mpe bazalaki se kosalela bikeko na bango,+Mpe yango ekómelaki bango motambo.+ 37  Mpe bazalaki kokaba bana na bango ya mibali+Mpe bana na bango ya basi mbeka epai ya bademo.+ 38  Bongo bazalaki se kosopa makila ya bato oyo bazali na likambo te,+Makila ya bana na bango ya mibali mpe ya bana na bango ya basi,Oyo bazalaki kokabela bikeko ya Kanana mbeka;+Mpe mokili ekómaki mbindo mpo basopaki makila.+ 39  Mpe bakómaki mbindo mpo na misala na bango+Mpe bazalaki se kosala pite na misala na bango.+ 40  Mpe nkanda ya Yehova ebandaki kopelela bato na ye,+Mpe ye ayaki koyina libula na ye.+ 41  Mpe mbala na mbala apesaki bango na lobɔkɔ ya bikólo,+Mpo baoyo bazalaki koyina bango báyangela bango,+ 42  Mpe mpo banguna na bango bányokola bango,Mpe mpo bátyama na lobɔkɔ na bango.+ 43  Mbala mingi azalaki kobikisa bango,+Kasi bango bazalaki kotomboka na etamboli na bango ya kozanga botosi,+Mpe bazalaki kokitisama mpo na libunga na bango.+ 44  Mpe azalaki komona mpasi na bango+Ntango azalaki koyoka ndenge bazalaki kosɛngasɛnga na kolela.+ 45  Mpe, mpo na bango, azalaki kokanisa kondimana na ye,+Mpe azalaki koyoka mawa na kolanda bonene ya motema boboto na ye ya kokamwa.+ 46  Mpe azalaki kosala ete báyokelama mawaNa miso ya baoyo nyonso bazalaki kokanga bango.+ 47  Bikisá biso, Ee Yehova Nzambe na biso,+Mpe yanganisá biso longwa na bikólo+Mpo tópesa matɔndi na nkombo na yo mosantu,+Mpo tóloba na esengo mpo na kosanzola yo.+ 48  Yehova Nzambe ya Yisraele apambwama+Libela na libela;Mpe bato nyonso basengeli koloba: Amen.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse