Nzembo 105:1-45

105  Bópesa Yehova matɔndi, bóbelela nkombo na ye,+Bóyebisa misala na ye na kati ya bato ya bikólo.+   Bóyembela ye, bóbɛtɛla ye mondule,+Bótya likebi na misala na ye nyonso ya kokamwa.+   Bómikumisa na nkombo na ye mosantu.+Motema ya baoyo bazali koluka Yehova esepela.+   Bóluka Yehova mpe makasi na ye.+Bóluka elongi na ye ntango nyonso.+   Bókanisa lisusu misala ya kokamwa oyo ye asalá,+Makamwisi na ye mpe bikateli ya lisambisi ya monɔkɔ na ye,+   Ee bino momboto ya Abrahama mosaleli na ye,+Bino bana ya Yakobo, baoyo ye aponá.+   Ye azali Yehova Nzambe na biso.+Bikateli na ye ya lisambisi ezali na mabele mobimba.+   Akanisi lisusu kondimana na ye mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+Liloba oyo apesaki mitindo, mpo na mabota nkóto (1 000),+   Kondimana oyo asalaki ná Abrahama,+Mpe liloba na ye ya ndai epai ya Yisaka,+ 10  Mpe abatelaki liloba yango mpo ezala lilako ya Yakobo,Mpo ezala kondimana oyo ekoumela mpo na ntango oyo etyami ndelo te na Yisraele,+ 11  Alobi: “Nakopesa yo mokili ya Kanana+Mpo ezala libula oyo bapesi yo.”+ 12  Yango esalemaki ntango bazalaki kaka bato moke,+Ɛɛ, moke mpenza, mpe bazalaki bato oyo bafandi bapaya kuna.+ 13  Mpe bazalaki kotambolatambola longwa na ekólo oyo tii na ekólo mosusu,+Longwa na bokonzi oyo tii na bato ya ekólo mosusu.+ 14  Apesaki moto moko te nzela apunza bango,+Kasi apamelaki bakonzi mpo na bango,+ 15  Alobaki: “Bósimba te bato na ngai oyo batyami mafuta,+Mpe bósala basakoli na ngai eloko moko te ya mabe.”+ 16  Mpe abengaki nzala eyela mokili yango;+Abukaki lingenda nyonso oyo bakakisaki mampa oyo esalemi lokola lopɛtɛ.+ 17  Atindaki moto moko liboso na bango:Yozefe, oyo atɛkamaki moombo.+ 18  Bamonisaki makolo na ye mpasi na bikangeli,+Molimo na ye ekɔtaki na bibende;+ 19  Kino ntango liloba na ye eyaki,+Liloba mpenza ya Yehova epɛtolaki ye.+ 20  Mokonzi atindaki liloba bábimisa ye,+Moyangeli ya bato ya bikólo, mpo afungola ye. 21  Atyaki ye nkolo ya bato ya ndako na ye+Mpe moyangeli ya biloko na ye nyonso,+ 22  Mpo na kokanga bankumu na ye ndenge molimo na ye elingi+Mpe mpo ateya mikóló na ye bwanya.+ 23  Mpe Yisraele ayaki na Ezipito,+Mpe Yakobo ye moko afandaki mopaya na mokili ya Kame.+ 24  Mpe azalaki se kosala ete bato na ye bábota mingi,+Mpe nsukansuka akómisaki bango makasi koleka banguna na bango.+ 25  Atikaki motema na bango ebongwana mpo báyina bato na ye,+Mpo básalela basaleli na ye makambo na mayele mabe.+ 26  Atindaki Moize mosaleli na ye,+Arona oyo ye aponaki.+ 27  Balakisaki bango bilembo na ye,+Mpe makamwisi na mokili ya Kame.+ 28  Atindaki molili mpe ayindisaki;+Mpe baboyaki te kotosa maloba na ye.+ 29  Akómisaki mai na bango makila,+Mpe abomaki mbisi na bango.+ 30  Mokili na bango etondaki na mbemba,+Na bashambrɛ ya kati ya bakonzi na bango. 31  Alobaki ete mapokopoko ekɔta,+Ngungi na bateritware na bango nyonso.+ 32  Akómisaki mbula na bango ya makasi mbula ya mabanga,+Mɔtɔ oyo ezali kopela na mokili na bango.+ 33  Mpe abebisaki banzete na bango ya vinyo mpe banzete na bango ya figiMpe abukaki banzete ya teritware na bango.+ 34  Alobaki ete mayoyo ekɔta,+Lolenge moko ya mayoyo, ɛɛ ekokaki kotángama te.+ 35  Mpe elyaki milona nyonso na mokili na bango;+Elyaki mpe mbuma ya mabele na bango. 36  Mpe abomaki mwana nyonso ya liboso na mokili na bango,+Ebandeli ya nguya na bango nyonso ya kobota.+ 37  Mpe abimisaki bango na palata mpe na wolo;+Mpe na kati ya mabota na ye moto moko te azalaki kobɛta libaku. 38  Ezipito esepelaki ntango babimaki,Mpo nsɔmɔ na bango ekwelaki bango.+ 39  Atandaki lipata lokola elamba ya kozipa,+Mpe mɔtɔ mpo epesaka pole na butu.+ 40  Basɛngaki, mpe ayaki na bandɛkɛ na nkombo kayɛ,+Mpe azalaki kotondisa bango na limpa oyo eutaki na likoló.+ 41  Afungolaki libanga, mpe mai ebandaki kotíyola;+Yango elekaki lokola ebale na bitúká oyo ezangá mai.+ 42  Mpo akanisaki liloba na ye mosantu oyo alobaki na Abrahama mosaleli na ye.+ 43  Bongo abimisaki bato na ye na nsai mpenza,+Bato oyo ye aponá na koganga ya esengo.+ 44  Mpe nsukansuka, apesaki bango mikili ya bikólo,+Mpe bazalaki se kozwa mbuma ya mosala makasi ya bituluku ya bato ya bikólo,+ 45  Mpo bábatela malako na ye+Mpe bátosa mibeko na ye.+Bósanzola Yah!+

Maloba na nse