Nzembo 103:1-22

Ya Davidi. 103  Ee molimo na ngai, pambolá Yehova,+Ɛɛ, eloko nyonso oyo ezali na kati na ngai epambola nkombo na ye mosantu.+   Ee molimo na ngai, pambolá Yehova,Mpe kobosana te misala na ye nyonso,+   Ye moto azali kolimbisa libunga na yo mobimba,+Ye moto azali kobikisa yo na minyoko* na yo nyonso,+   Oyo azali kosikola bomoi na yo na libulu,+Oyo azali kolatisa yo motole ya motema boboto mpe ya motema mawa,+   Oyo azali kotondisa bomoi na yo na makambo ya malamu;+Bolenge na yo ezali kokóma lisusu ya sika lokola oyo ya mpongo.+   Yehova azali kosala misala ya boyengebene+Mpe kozwa bikateli ya lisambisi mpo na baoyo nyonso bato babubi.+   Ayebisaki Moize banzela na ye,+Misala na ye, na bana ya Yisraele.+   Yehova azali na motema mawa mpe na ngɔlu,+Ayokaka nkanda noki te mpe atondi na motema boboto.+   Akoluka ntango nyonso komonisa mabunga na biso te,+Akokanga mpe nkanda te libela.+ 10  Asaleli biso makambo na kolanda masumu na biso te;+Akweisi mpe biso te na makambo oyo esengelaki tókwea, na kolanda mabunga na biso.+ 11  Mpo se ndenge likoló etombwaná koleka mabele,+Motema boboto na ye epai ya baoyo bazali kobanga ye eleki monene.+ 12  Se ndenge epai moi ebimaka ezali mosika mingi na epai moi elalaka,+Ndenge yango nde atye mosika na biso ebele ya misala na biso ya kobuka mibeko.+ 13  Se ndenge tata ayokelaka bana na ye mawa,+Yehova ayokeli baoyo bazali kobanga ye mawa.+ 14  Mpo ye moko ayebi malamu ndenge oyo tosalemá,+Azali kobosana te ete tozali putulu.+ 15  Moto​—mowei mpamba—​mikolo na ye ezali lokola oyo ya matiti ya mobesu;+Azali kokola lokola fololo ya esobe.+ 16  Mpo ntango mopɛpɛ eleki likoló na yango, ezali lisusu te;+Mpe esika na yango ekoyeba yango lisusu te.+ 17  Kasi motema boboto ya Yehova ezali libela na libela+Epai ya baoyo bazali kobanga ye,+Mpe boyengebene na ye epai ya bana ya bana,+ 18  Epai ya baoyo bazali kobatela kondimana na ye+Mpe epai ya baoyo bazali kokanisa mitindo na ye mpo na kosalela yango.+ 19  Yehova ye moko apiki makasi kiti na ye ya bokonzi na likoló;+Mpe bokonzi na ye eyangeli eloko nyonso.+ 20  Bópambola Yehova, Ee bino baanzelu+ na ye, oyo bozali na makasi na kati ya nguya, oyo bozali kosalela liloba na ye,+Oyo bozali koyoka mongongo ya liloba na ye.+ 21  Bópambola Yehova, bino mampinga na ye nyonso,+Bino basaleli na ye, oyo bozali kosala mokano na ye.+ 22  Bópambola Yehova, bino misala na ye nyonso,+Na bisika nyonso ya boyangeli na ye.+Ee molimo na ngai, pambolá Yehova.+

Maloba na nse

To, “bamaladi.”