Nzembo 10:1-18
ל [Lamed]
10 Ee Yehova, mpo na nini ozali kaka kotɛlɛma mosika?+Mpo na nini ozali kaka komibomba na ntango ya mpasi?+
2 Na lolendo na ye, moto mabe azali kolanda moto ya mpasi na mbamba;+Makanisi oyo bakanisaki ekangi bango.+
3 Mpo moto mabe amikumisi mpo na mposa makasi ya lokoso ya molimo na ye,+Mpe moto oyo azali kozwa litomba oyo ebongi te+ amipamboli;נ [Nun]
Azangi limemya epai ya Yehova.+
4 Moto mabe na lolendo na ye alukalukaka te;+Makanisi na ye nyonso ezali kaka: “Nzambe azali te.”+
5 Banzela na ye ezali kolonga ntango nyonso.+Bikateli na yo ya lisambisi ezali likoló mpenza, akoki komona yango te;+Azali kotyola banguna na ye.+
6 Alobi na motema na ye ete: “Nakotengatenga te;+Mpo nakozala na likama te libota na libota.”+
פ [Peʼ]
7 Monɔkɔ na ye etondi na bandai, makambo ya bokosi ná monyoko.+Mobulu mpe makambo oyo eyokisaka mpasi ezali na nse ya lolemo na ye.+
8 Azali kobatama pembeni ya bamboka;Longwa na bisika ya kobombana akoboma moto oyo asali likambo te.+ע [ʽAyin]
Miso na ye ezali kotala mpo na kokanga moto ya mawa.+
9 Azali kaka kobatama mpo na kozela na esika ya kobombana lokola nkɔsi na esika na ye ya kobombana.+Azali kaka kobatama+ mpo na kozela mpo amema moto ya mpasi na makasi.Azali komema moto ya mpasi na makasi ntango azali kokanga monyama na ye.+
10 Atutami, agumbami,Mpe ebele ya bato oyo balɛmbi bakwei na manzaka na ye ya makasi.+
11 Alobi na motema na ye:+ “Nzambe abosani.+Abombi elongi na ye.+Ya solo, akomona yango ata moke te.”+
ק [Kof]
12 Tɛlɛmá,+ Ee Yehova. Ee Nzambe, tombolá lobɔkɔ na yo.+Kobosana bato ya mpasi te.+
13 Mpo na nini moto mabe azangi limemya epai ya Nzambe?+Alobi na motema na ye: “Okosɛnga bázongisa monɔkɔ te.”+
ר [Resh]
14 Mpo yo moko omoni mawa mpe kotungisama.Ozali kotala, mpo na kozwa bango na lobɔkɔ na yo.+Epai na yo moto ya mawa,+ mwana mobali oyo tata akufá, azali komitika.Yo moko okómi mosungi na ye.+
ש [Shin]
15 Buká lobɔkɔ ya moto ya makambo mabe mpe ya moto mabe.+Luká makambo na ye ya mabe tii okomona yango lisusu te.+
16 Yehova azali Mokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+Bikólo esili na mabele na ye.+
ת [Taw]
17 Ee Yehova, okoyoka mpenza mposa ya bato ya komikitisa.+Okobongisa motema na bango.+Litoi na yo ekotya likebi,+
18 Mpo na kosambisa mwana mobali oyo tata akufá mpe moto oyo atutami,+Mpo moto—mowei mpamba—oyo azali moto ya mabele, alɛngisa lisusu te.+