Nzembo 1:1-6
1 Esengo+ na moto oyo atamboli na toli ya bato mabe te,+Mpe atɛlɛmi na nzela ya basumuki te,+Mpe afandi na kiti ya basɛki te.+
2 Kasi asepelaka na mobeko ya Yehova,+Mpe atángaka mobeko na ye na mongongo ya nse butu moi.+
3 Mpe akokóma mpenza lokola nzete oyo elonami pene na mikɛli ya mai,+Oyo epesaka mbuma na yango na eleko na yango+Mpe oyo nkasa na yango ekaukaka te,+Mpe nyonso oyo azali kosala ekolonga.+
4 Kasi bato mabe bazali bongo te,Bazali lokola mposo ya blé oyo mopɛpɛ epupolaka.+
5 Yango wana bato mabe bakolonga na lisambisi te,+Basumuki mpe bakotɛlɛma na liyangani ya bayengebene te.+
6 Mpo Yehova ayebi nzela ya bayengebene,+Kasi nzela ya bato mabe ekobeba.+