Nehemia 7:1-73
7 Mpe esalemaki boye: ntango kaka basilisaki kotonga lisusu efelo,+ na mbala moko natɛlɛmisaki baporte.+ Na nsima batyaki bakɛngɛli ya baporte,+ bayembi+ ná Balevi.+
2 Mpe mpo na kokamba Yerusaleme, natyaki Hanani+ ndeko na ngai mpe Hanania nkumu ya Ndako Monene,+ mpo azalaki mobali oyo abongi kotyelama motema+ mpe azalaki kobanga+ Nzambe ya solo koleka bamosusu mingi.
3 Bongo nalobaki na bango ete: “Baporte+ ya Yerusaleme ekofungwama te tii moi ekongala; mpe ntango batɛlɛmi wana, bakokanga baporte ná bikangiseli na yango.+ Mpe bópona bakɛngɛli na kati ya bato oyo bafandi na Yerusaleme, moto na moto na esika na ye ya kokɛngɛla mpe moto na moto na esika oyo etalani na ndako na ye.”+
4 Sikoyo engumba ezalaki monene mpe molai, mpe bato bazalaki moke na kati na yango,+ mpe bandako oyo etongamá ezalaki te.
5 Kasi Nzambe na ngai atyaki kati na motema+ na ngai ete nayanganisa bato ya lokumu mpe bayangeli-basungi mpe bato mpo bákomisa nkombo na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango.+ Bongo namonaki buku ya bankombo oyo ekomamá na kolanda molɔngɔ ya bankɔkɔ+ ya baoyo bamataki liboso, mpe namonaki ekomamá kati na yango ete:
6 Talá bana ya etúká oyo eyangelami+ oyo bautaki na bokangami,+ bato oyo bamemamaki na mboka mopaya, oyo Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone amemaki na mboka mopaya,+ mpe oyo na nsima bazongaki na Yerusaleme mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye;+
7 baoyo bayaki elongo na Zerubabele,+ Yeshua,+ Nehemia, Azaria, Raamia, Nahamani, Mordekai,+ Bilishane, Misiperete, Bigivai, Nehume, Baana.
Motángo ya mibali ya bato ya Yisraele:
8 Bana ya Paroshe:+ nkóto mibale na nkama moko na ntuku nsambo na mibale (2 172);
9 bana ya Shefatia:+ nkama misato na ntuku nsambo na mibale (372);
10 bana ya Ara:+ nkama motoba na ntuku mitano na mibale (652);
11 bana ya Pahate-moabe,+ na bana ya Yeshua mpe ya Yoabe:+ nkóto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe (2 818);
12 bana ya Elame:+ nkóto moko na nkama mibale na ntuku mitano na minei (1 254);
13 bana ya Zatu:+ nkama mwambe na ntuku minei na mitano (845);
14 bana ya Zakai:+ nkama nsambo na ntuku motoba (760);
15 bana ya Binui:+ nkama motoba na ntuku minei na mwambe (648);
16 bana ya Bebai:+ nkama motoba na ntuku mibale na mwambe (628);
17 bana ya Azegade:+ nkóto mibale na nkama misato na ntuku mibale na mibale (2 322);
18 bana ya Adonikame:+ nkama motoba na ntuku motoba na nsambo (667);
19 bana ya Bigivai:+ nkóto mibale na ntuku motoba na nsambo (2 067);
20 bana ya Adine:+ nkama motoba na ntuku mitano na mitano (655);
21 bana ya Atere,+ ya Hizikiya: ntuku libwa na mwambe (98);
22 bana ya Hashume:+ nkama misato na ntuku mibale na mwambe (328);
23 bana ya Bezai:+ nkama misato na ntuku mibale na minei (324);
24 bana ya Harife:+ nkama moko na zomi na mibale (112);
25 bana ya Gibeone:+ ntuku libwa na mitano (95);
26 mibali ya Beteleme+ mpe ya Netofa:+ nkama moko na ntuku mwambe na mwambe (188);
27 bato ya Anatote:+ nkama moko na ntuku mibale na mwambe (128);
28 bato ya Bete-azemavete:+ ntuku minei na mibale (42);
29 bato ya Kiriate-yearime,+ Kefira+ mpe Beerote:+ nkama nsambo na ntuku minei na misato (743);
30 bato ya Rama+ mpe Geba:+ nkama motoba na ntuku mibale na moko (621);
31 bato ya Mikemase:+ nkama moko na ntuku mibale na mibale (122);
32 bato ya Betele+ mpe ya Ai:+ nkama moko na ntuku mibale na misato (123);
33 bato ya Nebo mosusu:+ ntuku mitano na mibale (52);
34 bana ya Elame+ mosusu: nkóto moko na nkama mibale na ntuku mitano na minei (1 254);
35 bana ya Harime:+ nkama misato na ntuku mibale (320);
36 bana ya Yeriko:+ nkama misato na ntuku minei na mitano (345);
37 bana ya Lode,+ Hadide+ mpe Ono:+ nkama nsambo na ntuku mibale na moko (721);
38 bana ya Senaa:+ nkóto misato na nkama libwa na ntuku misato (3 930).
39 Banganga-nzambe: bana ya Yedaya+ ya ndako ya Yeshua: nkama libwa na ntuku nsambo na misato (973);
40 bana ya Imere:+ nkóto moko na ntuku mitano na mibale (1 052);
41 bana ya Pashure:+ nkóto moko na nkama mibale na ntuku minei na nsambo (1 247);
42 bana ya Harime:+ nkóto moko na zomi na nsambo (1 017).
43 Balevi: bana ya Yeshua, ya Kadimiele,+ na bana ya Hodeva:+ ntuku nsambo na minei (74).
44 Bayembi,+ bana ya Asafe:+ nkama moko na ntuku minei na mwambe (148).
45 Bakɛngɛli ya baporte:+ bana ya Shalume,+ bana ya Atere, bana ya Talamone,+ bana ya Akube,+ bana ya Hatita, bana ya Shobai:+ nkama moko na ntuku misato na mwambe (138).
46 Banetinime:+ bana ya Ziha, bana ya Hasufa, bana ya Tabaote,+
47 bana ya Kerose, bana ya Sia, bana ya Padone,+
48 bana ya Lebana, bana ya Hagaba,+ bana ya Salmai,
49 bana ya Hanane,+ bana ya Gidele, bana ya Gahare,
50 bana ya Reaya,+ bana ya Rezine,+ bana ya Nekoda,
51 bana ya Gazame, bana ya Uza, bana ya Pasea,
52 bana ya Besai,+ bana ya Meunime, bana ya Nefushesime,+
53 bana ya Bakabuke, bana ya Hakufa, bana ya Harure,+
54 bana ya Bazilite, bana ya Mehida, bana ya Haresha,+
55 bana ya Barakose, bana ya Sisera, bana ya Tema,+
56 bana ya Nezia, bana ya Hatifa.+
57 Bana ya basaleli ya Salomo:+ bana ya Sotai, bana ya Soferete, bana ya Perida,+
58 bana ya Yaala, bana ya Darakone, bana ya Gidele,+
59 bana ya Shefatia, bana ya Hatile, bana ya Pokerete-hazebaime, bana ya Amone.+
60 Banetinime+ nyonso mpe bana ya basaleli ya Salomo bazalaki nkama misato na ntuku libwa na mibale (392).
61 Mpe talá bato oyo bamataki uta na Tele-mela, Tele-haresha, Kerube, Adone ná Imere,+ mpe bakokaki te koyebisa ndako ya batata na bango mpe bankɔkɔ na bango, soki bazalaki bato ya Yisraele:
62 bana ya Delaya, bana ya Tobia, bana ya Nekoda:+ nkama motoba na ntuku minei na mibale (642).
63 Mpe na banganga-nzambe:+ bana ya Habaya, bana ya Hakoze,+ bana ya Barazilai,+ oyo azwaki mwasi na kati ya bana basi ya Barazilai+ Mogileade mpe akómaki kobengama na nkombo na bango.
64 Bango nde balukaki mokanda oyo ezali na bankombo na bango, mpo na komonisa liboso ya bato molɔngɔ ya bankɔkɔ na bango, mpe yango emonanaki te,+ bongo batalelamaki lokola bato ya mbindo mpe balongolamaki na bonganga-nzambe.+
65 Na yango, Guvɛrnɛrɛ*+ alobaki na bango ete basengeli te kolya+ biloko oyo eleki bosantu tii ntango nganga-nzambe oyo azali na Urime+ mpe na Tumime+ akotɛlɛma.
66 Lisangá mobimba ezalaki etuluku ya bato nkóto ntuku minei na mibale na nkama misato na ntuku motoba (42 360),+
67 longola baombo na bango ya mibali+ mpe baombo na bango ya basi, oyo bazalaki nkóto nsambo na nkama misato na ntuku misato na nsambo (7 337);+ mpe bazalaki na bayembi ya mibali+ mpe na bayembi ya basi+ nkama mibale na ntuku minei na mitano (245). [
68 Bafarasa na bango ezalaki nkama nsambo na ntuku misato na motoba (736), badɔngi na bango nkama mibale na ntuku minei na mitano (245).]+
69 Bakamela ezalaki nkama minei na ntuku misato na mitano (435). Bampunda+ ezalaki nkóto motoba na nkama nsambo na ntuku mibale (6 720).+
70 Mpe ezalaki na ndambo ya bankumu+ ya bandako ya batata+ oyo bapesaki likabo mpo na mosala.+ Guvɛrnɛrɛ+ ye moko mpe apesaki likabo mpo na esika ya kobomba biloko ya motuya: drakimɛ ya wolo nkóto moko (1 000), mabakuli ntuku mitano (50), ná bazambala ya banganga-nzambe+ nkama mitano na ntuku misato (530).
71 Mpe ezalaki na bankumu mosusu ya bandako ya batata oyo bapesaki likabo mpo na esika ya kobomba biloko ya motuya mpo na mosala: drakimɛ ya wolo nkóto ntuku mibale (20 000) ná mina ya palata+ nkóto mibale na nkama mibale (2 200).
72 Mpe oyo bato mosusu ya ekólo bapesaki ezalaki drakimɛ ya wolo nkóto ntuku mibale (20 000), mina ya palata nkóto mibale (2 000) ná bazambala ya banganga-nzambe ntuku motoba na nsambo (67).
73 Mpe banganga-nzambe,+ ná Balevi, bakɛngɛli ya baporte, bayembi,+ bato mosusu, Banetinime+ ná Yisraele mobimba bakómaki kofanda na bingumba na bango.+ Ntango sanza ya nsambo ekómaki,+ bana ya Yisraele bazalaki na ntango yango na kati ya bingumba na bango.+
Maloba na nse
^ To, “Tireshata.”