Nehemia 6:1-19

6  Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka bayebisaki Sanebalate,+ Tobia,+ Gesheme+ Moarabe+ ná banguna na biso mosusu ete nasilaki kotonga lisusu efelo+ mpe lidusu ata moko te etikalaki na kati na yango (atako na ntango wana bizipeli+ etɛlɛmisamaki naino te na baporte),+  Sanebalate ná Gesheme batindelaki ngai maloba nokinoki ete: “Yaká, tóyokana+ mpo na kokutana na bamboka ya lobwaku ya patatalu ya Ono.”+ Nzokande bazalaki kokanela ngai.+  Bongo natindelaki bango bamemi-nsango, báyebisa bango+ ete: “Nazali kosala mosala moko monene,+ mpe nakoki kokita te. Mpo soki natiki mosala, nakiti epai na bino, mosala ekokatana.”+  Kasi, batindelaki ngai kaka liloba yango mbala minei, mpe ngai nazalaki kozongisela bango kaka liloba yango.  Nsukansuka Sanebalate+ atindelaki ngai mosaleli na ye kaka na liloba yango mbala ya mitano, na mokanda polele na lobɔkɔ na ye.  Ekomamaki boye: “Eyokani na bikólo, mpe Gesheme+ azali kolobela yango, ete yo ná Bayuda bozali kokana kotomboka.+ Yango wana bozali kotonga efelo; mpe yo olingi okóma mokonzi na bango,+ ndenge bazali koloba.  Mpe kutu otye basakoli bábelelaka mpo na yo na Yerusaleme mobimba ete: ‘Mokonzi azali na Yuda!’ Mpe sikoyo bakoyebisa mokonzi makambo ya ndenge wana. Sikoyo yaká tópesana makanisi.”+  Kasi, natindelaki ye maloba ete: “Makambo ezali te ndenge ozali koloba,+ kasi ozali kobota yango nde na motema na yo moko.”+  Mpo bango nyonso bazalaki koluka kobangisa biso, na kolobáká ete: “Mabɔkɔ+ na bango ekolɛmba kino bakotika mosala mpe mosala yango ekosalema te.” Kasi sikoyo lendisá mabɔkɔ na ngai.+ 10  Mpe nakɔtaki na ndako ya Shemaya mwana ya Delaya mwana ya Mehetabele, wana amikangaki na kati.+ Mpe alobaki ete: “Tiká tóyokana+ mpo na kokutana na ndako ya Nzambe ya solo, na kati ya tempelo,+ mpe tókanga baporte ya tempelo; mpo bazali koya koboma yo, ɛɛ na butu+ bakoya koboma yo.” 11  Kasi nalobaki ete: “Moto lokola ngai nasengeli kokima?+ Mpe moto lokola ngai, nakoki kokɔta na tempelo mpe kotikala na bomoi?+ Nakokɔta te!” 12  Bongo nalukalukaki, mpe talá, Nzambe+ moto atindaki ye te, kasi alobaki+ esakweli oyo mpo na kotɛmɛla ngai mpo Tobia ná Sanebalate+ bafutaki ye.+ 13  Bafutaki ye+ mpo na ntina oyo: mpo nabanga,+ nasala ndenge wana mpe nasala mpenza lisumu;+ yango ekóma mpenza likambo oyo bakobebisa na yango lokumu na ngai,+ mpo bákoka koyokisa ngai nsɔni.+ 14  Ee Nzambe na ngai, kanisá+ Tobia+ ná Sanebalate, na kolanda makambo oyo mokomoko asali, kanisá mpe Noadia mosakoli-mwasi,+ mpe basakoli mosusu oyo bazalaki ntango nyonso koluka kobangisa ngai. 15  Nsukansuka efelo+ ekómaki na nsuka na mokolo ya ntuku mibale na mitano (25) ya sanza ya Elule; mosala yango eumelaki mikolo ntuku mitano na mibale (52). 16  Mpe esalemaki boye: ntango kaka banguna na biso+ nyonso bayokaki yango mpe bikólo nyonso oyo ezalaki zingazinga na biso bamonaki yango, na mbala moko bamonaki ete bakiti mpenza kokita, mpe bayebaki ete mosala yango esalamaki nde na lisalisi ya Nzambe+ na biso. 17  Na mikolo wana mpe, bato ya lokumu+ ya Yuda batindelaki Tobia+ ebele ya mikanda, oyo ya Tobia mpe eyelaki bango. 18  Mpo mingi kati na Yuda balapelaki ye ndai ya boyokani, mpo azalaki mobali ya mwana ya Shekania mwana ya Ara;+ mpe Yehohanane mwana na ye ya mobali abalaki mwana ya Meshulame+ mwana ya Berekia. 19  Lisusu, bazalaki ntango nyonso kolobela ngai makambo na ye ya malamu.+ Mpe bazalaki ntango nyonso koyebisa ye maloba na ngai. Tobia azalaki mpe kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.+

Maloba na nse