Nehemia 4:1-23
4 Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka Sanebalate+ ayokaki ete tozali kotonga lisusu efelo, asilikaki+ mpe ayokaki nkanda makasi, mpe azalaki kosɛka+ Bayuda.
2 Mpe abandaki koloba liboso ya bandeko na ye+ mpe liboso ya limpinga ya basoda ya Samaria, ɛɛ, abandaki koloba ete: “Bayuda oyo balɛmbalɛmbá boye bazali kosala nini? Bakomityela nde motema? Bakopesa nde mbeka?+ Bakosilisa nde na mokolo moko? Bakozongisa nde na bomoi mabanga oyo euti na mabondo ya bosɔtɔ+ oyo ezipami na putulu awa mabanga yango eziki?”
3 Nzokande Tobia+ Moamone+ azalaki pembeni na ye, mpe alobaki ete: “Ɛɛ ata oyo bazali kotonga, soki gambala+ amateli yango, akobuka mpenza efelo na bango ya mabanga.”
4 Yoká,+ Ee Nzambe na biso, mpo tokómi eloko ya kotyola;+ mpe salá ete nsɔni+ na bango ezonga na mitó na bango moko, mpe kabá bango bápunzama na mokili ya bokangami.
5 Mpe kozipa te libunga+ na bango mpe lisumu na bango liboso na yo. Yango elongwa te, mpo basaleli batongi makambo mabe.
6 Bongo tokobaki kotonga efelo, mpe efelo yango mobimba ekangisamaki kino na katikati ya bosanda na yango; mpe bato bazalaki kaka kotya motema na mosala.+
7 Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka Sanebalate,+ Tobia,+ Baarabe,+ Baamone+ ná Baashedode+ bayokaki ete mosala ya kobongisa bifelo ya Yerusaleme ezalaki kokende liboso, mpo madusu ebandaki kozipama, basilikaki makasi.
8 Mpe bango nyonso basalaki likita+ mpo na koya mpe kobundisa Yerusaleme mpe kotya ngai mobulu.
9 Kasi tobondelaki+ Nzambe na biso mpe mpo na bango, totyaki bakɛngɛli bábatelaka biso butu moi.
10 Mpe Yuda abandaki koloba ete: “Nguya ya momemi biloko ya kilo+ ebɛti libaku, mpe bosɔtɔ+ ezali mingi; mpe biso moko tozali kokoka te kotonga efelo.”
11 Lisusu, banguna na biso bazalaki kaka koloba ete: “Bakoyeba+ te mpe bakomona te tii tokokóma na kati na bango, mpe tokoboma mpenza bango mpe tokosukisa mosala yango.”
12 Mpe esalemaki boye: wana Bayuda oyo bafandaki pembeni na bango bazalaki koya, balobaki na biso mbala zomi ete: “Banguna bakouta bisika nyonso biso tozalaka, bino bokozonga kuna.”
13 Bongo natyaki mibali na bisika ya nse koleka, na esika oyo ezalaki nsima ya efelo, na bisika ya polele, mpe natyaki bato libota na libota ná mipanga+ na bango, makɔnga+ na bango mpe matimbo na bango.
14 Ntango namonaki ete bazali kobanga, na mbala moko natɛlɛmaki mpe nalobaki na bato ya lokumu+ mpe na bayangeli-basungi+ mpe na bato mosusu ete: “Bóbanga bango te.+ Bókanisa Yehova Ye oyo azali monene+ mpe nsɔmɔ;+ mpe bóbundela bandeko na bino,+ bana na bino ya mibali mpe bana na bino ya basi, basi na bino mpe bandako na bino.”
15 Sikoyo esalemaki boye: ntango kaka banguna na biso bayoki ete toyebi likambo yango, mpe ete Nzambe ya solo akweisi mokano+ na bango mpe biso nyonso tozongaki na efelo, moto na moto na mosala na ye,
16 ɛɛ, esalemaki boye: banda mokolo yango, ndambo ya bilenge na ngai ya mibali+ bazalaki kosala mosala mpe ndambo na bango basimbaki makɔnga, banguba ná matimbo mpe bakazaka ya bibende;+ mpe bankumu+ bazalaki na nsima ya ndako mobimba ya Yuda.
17 Batongi oyo bazalaki na efelo ná basali oyo bazalaki komema mikumba, moto na moto azalaki kosala mosala na lobɔkɔ moko mpe na lobɔkɔ mosusu+ asimbaki ebundeli na ye ya kobwakela.+
18 Mpe batongi bakangaki, moto na moto, mopanga na ye na loketo,+ wana bazali kotonga;+ mpe moto oyo ayulaka liseke+ azalaki pembeni na ngai.
19 Mpe nalobaki na bato ya lokumu mpe na bayangeli-basungi+ mpe na bato mosusu ete: “Mosala ezali monene mpe mingi, mpe topalangani na efelo, mosusu epai mosusu epai.
20 Na esika oyo bokoyoka lokito ya liseke, na esika yango nde bokoya kosangana epai na biso. Nzambe na biso ye moko akobundela biso.”+
21 Ntango biso tozalaki kosala mosala, ndambo mosusu ya bato mpe bazalaki kosimba makɔnga, banda kotana ya ntɔngɔ tii kobima ya minzoto.
22 Lisusu, na ntango yango nalobaki na bato ete: “Tiká ete mibali bákɛngɛla na butu, moto na moto ná mosaleli na ye, na katikati ya Yerusaleme,+ mpe basengeli kozala bakɛngɛli na biso na butu mpe basali-misala na moi.”
23 Kasi ngai+ ná bandeko+ na ngai ná basaleli+ na ngai mpe mibali oyo bazalaki kokɛngɛla,+ oyo bazalaki nsima na ngai, tozalaki kolongola bilamba na biso te, moto na moto azalaki na ebundeli na ye ya kobwakela+ na lobɔkɔ na ye ya mobali.