Nehemia 3:1-32

3  Mpe Eliashibe+ nganga-nzambe monene ná bandeko na ye, banganga-nzambe, batɛlɛmaki mpe batongaki Porte ya Bampate.+ Bango nde basantisaki yango+ mpe batɛlɛmisaki bizipeli na yango; basantisaki yango tii na Ndako Molai ya Mea,+ tii na Ndako Molai ya Hananele.+  Mpe pembeni na bango, mibali ya Yeriko+ batongaki. Mpe pembeni na bango, Zakure mwana ya Imiri atongaki.  Mpe bana ya Hasenaa batongaki Porte ya Mbisi;+ bango nde batyaki yango mabaya+ mpe na nsima batɛlɛmisaki bizipeli+ na yango, bikangiseli na yango ya mabaya ná ya bibende.+  Mpe pembeni na bango, Meremote+ mwana ya Uriya+ mwana ya Hakoze abongisaki bisika oyo ebebaki, mpe pembeni na bango, Meshulame+ mwana ya Berekia mwana ya Meshezabele abongisaki bisika oyo ebebaki; mpe pembeni na bango, Zadoke mwana ya Baana abongisaki bisika oyo ebebaki.  Mpe pembeni na bango, Batekoa+ babongisaki bisika oyo ebebaki; kasi bato na bango ya lokumu+ baboyaki kosala mosala ya bankolo na bango.  Mpe Yoyada mwana ya Pasea mpe Meshulame mwana ya Besodeia babongisaki Porte ya Engumba ya Kala;+ bango nde batyaki yango mabaya mpe na nsima batɛlɛmisaki bizipeli na yango ná bikangiseli na yango ya mabaya ná ya bibende.+  Mpe pembeni na bango, Melatia Mogibeone+ mpe Yadone Momeronote,+ babongisaki bisika oyo ebebaki, bango bato ya Gibeone+ mpe ya Mizipa,+ oyo bazali na nse ya bokonzi ya guvɛrnɛrɛ+ na ngámbo mosusu ya Ebale.+  Pembeni na ye, Uziele mwana ya Haraya, moko ya basali ya biloko ya wolo,+ abongisaki bisika oyo ebebaki; mpe pembeni na ye, Hanania, moko ya bato oyo basalaka malasi,+ abongisaki bisika oyo ebebaki; mpe batyaki badalɛ na Yerusaleme tii na Efelo Monene.+  Mpe pembeni na bango, Refaya mwana ya Hure, nkumu ya ndambo ya etúká ya Yerusaleme, abongisaki bisika oyo ebebaki. 10  Mpe pembeni na bango, Yedaya mwana ya Harumafe abongisaki bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na ye;+ mpe pembeni na ye, Hatushe mwana ya Hashabeneya abongisaki bisika oyo ebebaki. 11  Malakiya mwana ya Harime+ mpe Hashube mwana ya Pahate-moabe+ babongisaki eteni mosusu ya efelo, oyo bamekaki bolai na yango, ná Ndako Molai ya Bitumbelo ya mampa.+ 12  Mpe pembeni na ye, Shalume mwana ya Halokeshe, nkumu+ ya ndambo ya etúká ya Yerusaleme, abongisaki bisika oyo ebebaki, ye ná bana na ye ya basi. 13  Hanune mpe bato oyo bafandi na Zanoa+ babongisaki Porte ya Lobwaku;+ bango nde batongaki yango mpe na nsima batɛlɛmisaki bizipeli+ na yango, bikangiseli na yango ya mabaya+ ná ya bibende,+ lisusu mapeko nkóto moko (1 000) na efelo tii na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ.+ 14  Mpe Malakiya mwana ya Rekabe, nkumu ya etúká ya Bete-hakereme,+ abongisaki Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ; ye nde atongaki yango mpe atɛlɛmisaki bizipeli na yango, bikangiseli na yango ya mabaya ná ya bibende. 15  Mpe Shalune mwana ya Koloze, nkumu ya etúká ya Mizipa,+ abongisaki Porte ya Liziba;+ ye nde atongaki yango mpe atyaki yango nsamba mpe atɛlɛmisaki bizipeli+ na yango, bikangiseli na yango ya mabaya ná ya bibende, ná efelo ya Liziba+ ya Nzela ya Mai* oyo ekei na Elanga ya Mokonzi+ tii na Eskalye+ oyo ekitá banda na Sité ya Davidi.+ 16  Nsima na ye, Nehemia mwana ya Azabuke, nkumu ya ndambo ya etúká ya Bete-zure,+ abongisaki bisika oyo ebebaki tii na esika oyo etalani na Malita+ ya Davidi mpe tii na liziba+ oyo basalá, tii na Ndako ya Bato ya Nguya.+ 17  Nsima na ye, Balevi+ babongisaki bisika oyo ebebaki, Rehume mwana ya Bani;+ pembeni na ye, Hashabia, nkumu ya ndambo ya etúká ya Keila,+ abongisaki bisika oyo ebebaki mpo na etúká na ye. 18  Nsima na ye, bandeko na bango babongisaki bisika oyo ebebaki, Bavai mwana ya Henadade, nkumu ya ndambo ya etúká ya Keila. 19  Mpe Ezere mwana ya Yeshua,+ nkumu ya Mizipa,+ abandaki kobongisa pembeni na ye eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango, oyo etalani na esika ya komata tii na Esika ya kobomba bibundeli, na likonzí oyo esimbi bifelo.+ 20  Nsima na ye, Baruke mwana ya Zabai+ asalaki na molende+ mpe abongisaki eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango, banda na likonzí oyo esimbi bifelo tii na monɔkɔ ya ndako ya Eliashibe+ nganga-nzambe monene. 21  Nsima na ye, Meremote mwana ya Uriya+ mwana ya Hakoze abongisaki eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango, banda na monɔkɔ ya ndako ya Eliashibe tii na nsuka ya ndako ya Eliashibe. 22  Mpe nsima na ye, ba-nganga-nzambe, mibali ya Etúká ya Yordani,+ babongisaki bisika oyo ebebaki. 23  Nsima na bango, Benyamina mpe Hashube babongisaki bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na bango. Nsima na bango, Azaria mwana ya Maaseya mwana ya Anania abongisaki bisika oyo ebebaki pembeni na ndako na ye. 24  Nsima na ye, Binui mwana ya Henadade abongisaki eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango, banda na ndako ya Azaria tii na likonzí oyo esimbi bifelo+ mpe tii na litumu. 25  Nsima na ye, Palale mwana ya Uzai abongisaki bisika oyo ebebaki, oyo etalani na likonzí oyo esimbi bifelo mpe na ndako molai oyo ebimá likoló ya Ndako ya Mokonzi,+ ndako molai ya likoló oyo ezalaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+ Nsima na ye ezalaki Pedaya mwana ya Paroshe.+ 26  Mpe Banetinime+ bazalaki kofanda na Ofele;+ babongisaki bisika oyo ebebaki tii na esika oyo etalani na Porte ya Mai+ na ɛsti mpe na ndako molai oyo ebimá. 27  Nsima na bango, Batekoa+ babongisaki eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango, banda na esika oyo etalani na ndako molai ya monene oyo ebimá, tii na efelo ya Ofele. 28  Likoló ya Porte ya Bampunda+ banganga-nzambe babongisaki bisika oyo ebebaki, moto na moto, na esika oyo etalani na ndako na ye. 29  Nsima na bango, Zadoke+ mwana ya Imere abongisaki bisika oyo ebebaki, oyo etalani na ndako na ye. Mpe nsima na ye, Shemaya mwana ya Shekania, mokɛngɛli ya Porte ya Ɛsti,+ abongisaki bisika oyo ebebaki. 30  Nsima na ye, Hanania mwana ya Shelemia mpe Hanune mwana ya motoba ya Zalafe abongisaki eteni mosusu ya efelo oyo bamekaki bolai na yango. Nsima na ye, Meshulame+ mwana ya Berekia abongisaki bisika oyo ebebaki, oyo etalani na eteni ya ndako na ye.+ 31  Nsima na ye, Malakiya, moto ya lisangani ya basali ya biloko ya wolo,+ abongisaki bisika oyo ebebaki tii na ndako ya Banetinime+ mpe ya bato ya mombongo,+ na esika oyo etalani na Porte ya Kokɛngɛla* mpe tii na shambrɛ ya likoló ya litumu. 32  Mpe katikati ya shambrɛ ya likoló ya litumu ná Porte ya Bampate,+ basali ya biloko ya wolo mpe bato ya mombongo babongisaki bisika oyo ebebaki.

Maloba na nse

To, “Liziba ya Shela.”
To, “Porte ya Hamifikade.”