Nehemia 2:1-20

2  Mpe esalemaki boye: na sanza ya Nisana,+ na mbula ya ntuku mibale (20)+ ya mokonzi Artazerezese,+ vinyo ezalaki liboso na ye, mpe lokola na momeseno nazwaki vinyo mpe napesaki yango mokonzi.+ Kasi naino namonaná mawamawa boye liboso na ye te.+  Bongo mokonzi alobaki na ngai ete: “Mpo na nini elongi na yo ezali mawamawa+ nzokande ozali na maladi te? Ezali likambo mosusu te kaka mawa ya motema.”+ Na yango, nabangaki mingi mpenza.  Bongo nalobaki na mokonzi ete: “Tiká mokonzi azala na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te!+ Elongi na ngai ezala mawamawa te ndenge nini, awa engumba,+ ndako ya malita ya bankɔkɔ na ngai,+ ebebisami mpe baporte na yango mpenza elyami na mɔtɔ?”+  Na yango mokonzi alobaki na ngai: “Olingi nini?”+ Na mbala moko nabondelaki+ Nzambe ya likoló.+  Nsima na yango nalobaki na mokonzi ete: “Soki emonani malamu na miso ya mokonzi,+ mpe soki mosaleli na yo amonani malamu na miso na yo,+ tindá ngai na Yuda, na engumba ya malita ya bankɔkɔ na ngai, mpo natonga yango lisusu.”+  Na yango mokonzi alobaki na ngai boye, wana mwasi na ye ya lokumu afandaki pembeni na ye: “Mobembo na yo ekoumela ntango boni mpe okozonga ntango nini?” Bongo emonanaki malamu+ na miso ya mokonzi ete atinda ngai, ntango napesaki ye mokolo oyo nakozonga.+  Mpe nalobaki lisusu na mokonzi ete: “Soki emonani malamu na miso ya mokonzi, bápesa ngai mikanda+ mpo na baguvɛrnɛrɛ+ ya ngámbo mosusu ya Ebale,+ mpo bátika ngai naleka kino nakokóma na Yuda;  mpe mokanda mpo na Asafa mokɛngɛli ya zamba ya mokonzi, mpo apesa ngai banzete oyo nakosala na mabaya na yango baporte ya Esika makasi+ ya ndako+ ya Nzambe, mpe efelo+ ya engumba mpe ndako oyo nakokɔta.” Bongo mokonzi apesaki ngai mikanda yango, mpo lobɔkɔ malamu ya Nzambe na ngai ezalaki elongo na ngai.+  Nsukansuka nakómaki epai ya baguvɛrnɛrɛ+ ya ngámbo mosusu ya Ebale mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Lisusu, mokonzi atindaki elongo na ngai bakonzi ya limpinga ya basoda mpe bato oyo batambolaka na mpunda. 10  Ntango Sanebalate+ Mohorone+ mpe Tobia+ mosaleli Moamone,+ bayokaki yango, bamonaki likambo yango mabe+ mpenza ete moto ayei koluka bolamu ya bana ya Yisraele. 11  Nsukansuka nakómaki na Yerusaleme, mpe nazalaki wana mikolo misato. 12  Bongo natɛlɛmaki na butu, ngai ná mwa ndambo ya mibali elongo na ngai, mpe nayebisaki moto moko te+ likambo oyo Nzambe na ngai azalaki kotya na motema na ngai ete nasalela Yerusaleme,+ mpe nyama ya mboka ata moko te ezalaki elongo na ngai longola kaka nyama oyo namataki. 13  Mpe nabimaki na Porte ya Lobwaku+ na butu mpe nakei liboso ya Liziba ya Nyoka Monene kino na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ,+ mpe nazalaki kaka kotalatala bifelo+ ya Yerusaleme, ndenge ebukaná mpe ndenge baporte+ na yango elyamá na mɔtɔ. 14  Mpe nalekaki pembenipembeni ya Porte ya Liziba+ kino na Liziba ya Mokonzi, mpe esika ya koleka ezalaki te mpo na nyama oyo namataki. 15  Kasi nakobaki komata na lobwaku ya mokɛli+ na butu, mpe nazalaki kotalatala efelo; nsima na yango nabalukaki mpe nakɔtaki na Porte ya Lobwaku,+ bongo nazongaki. 16  Mpe bayangeli-basungi+ bayebaki te epai nakendaki mpe eloko nini nazalaki kosala; mpe nayebisaki naino likambo moko te epai ya Bayuda ná banganga-nzambe ná bato ya lokumu ná bayangeli-basungi mpe bato mosusu oyo bazalaki kosala mosala. 17  Nsukansuka nalobaki na bango ete: “Bino bozali komona mpasi oyo tozali na yango, ndenge Yerusaleme ebebi mpe baporte na yango etumbami na mɔtɔ. Bóya mpe tótonga efelo ya Yerusaleme, mpo tókoba kozala eloko ya nsɔni te.”+ 18  Mpe nayebisaki bango oyo lobɔkɔ+ ya Nzambe na ngai esalaki, bolamu oyo yango esalelaki ngai,+ mpe lisusu maloba oyo mokonzi+ alobaki na ngai. Na yango balobaki ete: “Tótɛlɛma mpe tótonga.” Bongo balendisaki mabɔkɔ na bango mpo na mosala yango ya malamu.+ 19  Sikoyo ntango Sanebalate+ Mohorone, Tobia+ mosaleli+ Moamone,+ ná Gesheme+ Moarabe+ bayokaki likambo yango, babandaki kosɛka biso+ mpe kotala biso na lityo mpe koloba ete: “Eloko nini oyo bozali kosala? Bozali nde kotombokela mokonzi?”+ 20  Kasi nazongiselaki bango mpe nalobaki na bango ete: “Nzambe ya likoló+ Ye nde akopesa biso elonga,+ mpe biso, basaleli na ye, tokotɛlɛma mpe tokotonga; kasi bino bozali na likabo te,+ na lotomo te mpe eloko ya kokanisa+ bino ezali te na Yerusaleme.”

Maloba na nse