Nehemia 13:1-31
13 Na mokolo yango batángaki+ buku+ ya Moize na matoi ya bato; mpe bamonaki ekomamá na kati ete Moamone+ mpe Momoabe+ basengeli te kokɔta na lisangá ya Nzambe ya solo mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+
2 mpo bayambaki te bana ya Yisraele na mampa+ mpe na mai,+ kasi bafutaki Balaama+ mpo alakela bango mabe.+ Nzokande, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli.+
3 Bongo esalemaki boye: ntango kaka bayokaki mobeko,+ babandaki kokabola+ Yisraele ná etuluku mobimba ya bato ndenge na ndenge.
4 Sikoyo liboso na yango, Eliashibe+ nganga-nzambe, oyo azalaki na mokumba ya esika moko ya kolya+ na ndako ya Nzambe na biso, azalaki ndeko ya Tobia;+
5 mpe asalelaki ye esika moko monene ya kolya,+ epai bazalaki liboso kotya mbala na mbala likabo ya mbuma,+ olibana, bisaleli, moko ya bandambo zomi ya mbuma, vinyo ya sika+ ná mafuta,+ oyo Balevi,+ bayembi ná bakɛngɛli ya baporte bazalaki na lotomo ya kozwa, mpe likabo mpo na banganga-nzambe.
6 Mpe na ntango nyonso wana, nazalaki na Yerusaleme te, mpo na mbula ya ntuku misato na mibale (32)+ ya Artazerezese+ mokonzi ya Babilone, nayaki epai ya mokonzi, mpe nsima ya mwa ntango nasɛngaki mokonzi nzela nakende.+
7 Bongo nakómaki na Yerusaleme mpe namonaki mabe oyo Eliashibe+ asalaki na ndenge asalelaki Tobia+ esika na kati ya lopango ya ndako+ ya Nzambe ya solo.
8 Mpe emonanaki mabe mpenza na miso na ngai.+ Bongo nabwakaki+ biloko nyonso ya ndako ya Tobia na libándá ya esika ya kolya.
9 Na nsima napesaki etinda mpe bapɛtolaki+ bisika yango ya kolya;+ mpe nazongisaki na kati na yango bisaleli+ ya ndako ya Nzambe ya solo, ná likabo ya mbuma ná olibana.+
10 Mpe nayaki koyeba ete bapesaki Balevi biloko+ na bango te, yango wana Balevi ná bayembi oyo bazalaki kosala mosala bakimaki, moto na moto na elanga na ye.+
11 Mpe nabandaki kopamela+ bayangeli-basungi+ mpe koloba ete: “Mpo na nini ndako ya Nzambe ya solo esundolami boye?”+ Na yango nayanganisaki bango mpe natyaki bango na esika na bango ya mosala.
12 Mpe Yuda mobimba, ɛɛ bango, bayaki na moko ya bandambo zomi+ ya mbuma,+ ya vinyo ya sika+ mpe ya mafuta+ na bandako ya kobomba biloko.+
13 Na nsima natyaki Shelemia nganga-nzambe mpe Zadoke mosali-bakopi mpe Pedaya na kati ya Balevi na mokumba ya kotalela bandako ya kobomba biloko; mpe bazalaki kokamba Hanane mwana ya Zakure mwana ya Matania,+ mpo bazalaki kotalela bango ete bazali bato ya sembo;+ mpe bazalaki na mokumba ya kokabolela+ bandeko na bango biloko.
14 Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai+ mpo na likambo yango, mpe kolongola+ te misala na ngai ya motema boboto oyo nasaleli ndako+ ya Nzambe na ngai mpe mosala ya kokɛngɛla yango.
15 Na mikolo yango, namonaki na Yuda bato bazali konyatanyata mbuma na bikamwelo ya vinyo na mokolo ya sabata+ mpe bazali koya na mabondo ya mbuma mpe kotya+ yango likoló ya bampunda,+ mpe lisusu vinyo, mbuma ya vinyo mpe mbuma ya figi+ mpe lolenge nyonso ya mikumba ya kilo, mpe bazalaki kokɔtisa yango na Yerusaleme na mokolo ya sabata;+ mpe natatwelaki bango na mokolo oyo bazalaki kotɛka biloko.
16 Mpe bato ya Tire+ bazalaki kofanda na engumba, bazalaki koya na mbisi mpe na lolenge nyonso ya biloko ya mombongo+ mpe na sabata bazalaki kotɛkɛla yango bana ya Yuda mpe na Yerusaleme.
17 Bongo nabandaki kopamela bato ya lokumu+ ya Yuda mpe koloba na bango ete: “Likambo nini ya mabe boye bozali kosala, bozali kokómisa mokolo ya sabata eloko mpamba?
18 Bankɔkɔ na bino basalaki ndenge wana,+ mpe Nzambe na biso ayeiselaki biso, mpe lisusu engumba oyo, mpasi oyo nyonso,+ boye te? Kasi bino bozali kobakisa na nkanda oyo ezali kopelela Yisraele na ndenge bozali kokómisa sabata eloko mpamba.”+
19 Mpe esalemaki boye: ntango kaka baporte ya Yerusaleme ebandaki kokóma molili liboso ya sabata, na mbala moko napesaki etinda mpe babandaki kokanga bizipeli.+ Nalobaki lisusu ete báfungola yango te tii na nsima ya sabata; mpe natyaki ndambo ya basaleli na ngai na baporte mpo eloko moko te ya kilo ekɔta na mokolo ya sabata.+
20 Na yango bato ya mombongo mpe baoyo bazalaki kotɛka biloko ya lolenge nyonso ya mombongo balalaki butu mobimba na libándá ya Yerusaleme mbala moko mpe mbala ya mibale.
21 Bongo natatwelaki+ bango mpe nalobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kolala butu mobimba liboso ya efelo? Soki bosali yango lisusu, nakokanga bino.”+ Banda na ntango yango, bazalaki koya na mokolo ya sabata te.
22 Mpe nalobaki na Balevi+ ete bámipɛtolaka+ ntango nyonso mpe báyaka kokɛngɛla baporte+ mpo na kosantisa+ mokolo ya sabata. Ee Nzambe na ngai, na likambo oyo mpe, kanisá+ ngai, mpe yokelá ngai mawa na kolanda motema boboto oyo otondi na yango.+
23 Lisusu, na mikolo yango, namonaki Bayuda oyo batyaki basi Baashedode,+ Baamone ná Bamoabe+ na ndako.+
24 Mpe bana na bango, ndambo bazalaki koloba monɔkɔ ya Ashedode, mpe ata moko te kati na bango ayebaki koloba monɔkɔ ya Bayuda,+ kasi bazalaki nde koloba minɔkɔ ya bato ya bikólo ndenge na ndenge.
25 Mpe nabandaki kopamela bango mpe kolakela bango mabe+ mpe kobɛta mibali mosusu na kati na bango+ mpe kopikola nsuki na bango mpe kolapisa bango ndai na nkombo ya Nzambe ete:+ “Bosengeli te kopesa bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe bosengeli kondima ata mwana na bango moko te ya mwasi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.+
26 Salomo mokonzi ya Yisraele asalaki lisumu mpo na bango, boye te?+ Mpe na bikólo mingi ezalaki na mokonzi moko te lokola ye;+ mpe Nzambe na ye alingaki ye,+ bongo Nzambe akómisaki ye mokonzi na Yisraele mobimba. Ata ye, basi bapaya basalisaki ye lisumu.+
27 Mpe ebongi koyokana ata moke te ete bozali kosala mabe monene oyo nyonso na ndenge bozali kosalela Nzambe na biso makambo na bosembo te, na ndenge botye basi bapaya na ndako, boye te?”+
28 Mpe moko ya bana ya Yoyada+ mwana ya Eliashibe+ nganga-nzambe monene azalaki mobali ya mwana ya Sanebalate+ Mohorone.+ Bongo nabenganaki ye mosika na ngai.+
29 Ee Nzambe na ngai, kanisá bango mpo bakɔtisi mbindo+ na bonganga-nzambe mpe na kondimana+ ya bonganga-nzambe mpe ya Balevi.+
30 Mpe napɛtolaki+ bango na eloko nyonso ya bopaya mpe napesaki banganga-nzambe ná Balevi mikumba, moto na moto na mosala na ye,+
31 ezala mpo na kopesa nkoni+ na bantango oyo etyamá mpe mpo na mbuma ya liboso oyo eteli.
Ee Nzambe na ngai, kanisá ngai+ mpe salelá ngai bolamu.+