Nehemia 12:1-47
12 Mpe talá banganga-nzambe mpe Balevi oyo bamataki elongo na Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua:+ Seraya, Yirimia, Ezera,
2 Amaria,+ Maluke, Hatushe,
3 Shekania, Rehume, Meremote,
4 Ido, Ginetoi, Abiya,
5 Miyamine, Maadia, Biliga,
6 Shemaya,+ ná Yoyaribe, Yedaya,+
7 Salu, Amoke,+ Hilikiya, Yedaya.+ Bango bazalaki bankumu ya banganga-nzambe mpe ya bandeko na bango na mikolo ya Yeshua.+
8 Mpe Balevi: Yeshua,+ Binui,+ Kadimiele,+ Sherebia, Yuda, Matania,+ mokambi ya nzembo ya kopesa matɔndi, ye ná bandeko na ye.
9 Mpe bandeko na bango Bakabukia ná Uni, bisika na bango ya mosala ya kokɛngɛla etalanaki na bango.
10 Yeshua abotaki Yoyakime,+ mpe Yoyakime abotaki Eliashibe,+ mpe Eliashibe abotaki Yoyada.+
11 Yoyada abotaki Yonatane, mpe Yonatane abotaki Yadua.+
12 Mpe na mikolo ya Yoyakime, ezalaki na banganga-nzambe, bankumu ya bandako ya batata:+ mpo na Seraya,+ Meraya; mpo na Yirimia, Hanania;
13 mpo na Ezera,+ Meshulame; mpo na Amaria, Yehohanane;
14 mpo na Maluki, Yonatane; mpo na Shebania,+ Yozefe;
15 mpo na Harime,+ Adena; mpo na Merayote, Helekai;
16 mpo na Ido, Zekaria; mpo na Ginetone, Meshulame;
17 mpo na Abiya,+ Zikri; mpo na Miniamine, ——;* mpo na Moadia, Pilitai;
18 mpo na Biliga,+ Shamua; mpo na Shemaya, Yehonatane;
19 mpe mpo na Yoyaribe, Matenai; mpo na Yedaya,+ Uzi;
20 mpo na Salai, Kalai; mpo na Amoke, Ebere;
21 mpo na Hilikiya, Hashabia; mpo na Yedaya,+ Netanele.
22 Na mikolo ya Eliashibe,+ Yoyada,+ Yohanane ná Yadua,+ Balevi oyo bazalaki bankumu ya bandako ya batata bakomamaki nkombo, ná banganga-nzambe, tii na ntango ya bokonzi ya Dariuse Moperse.
23 Bana ya Levi oyo bazalaki bankumu ya bandako ya batata+ bakomamaki nkombo na buku ya makambo ya ntango na bango, ɛɛ tii na mikolo ya Yohanane mwana ya Eliashibe.
24 Mpe bankumu ya Balevi: Hashabia, Sherebia,+ Yeshua mwana ya Kadimiele+ ná bandeko na bango, oyo batalani na bango, mpo na kopesa masanzoli mpe kopesa matɔndi na kolanda mitindo+ ya Davidi moto ya Nzambe ya solo, etuluku ya bakɛngɛli pene na etuluku ya bakɛngɛli.
25 Matania,+ Bakabukia, Obadia, Meshulame,Talamone, Akube+ bazalaki kokɛngɛla baporte:+ etuluku moko ya bakɛngɛli pene na bandako ya kobomba biloko oyo ezalaki na baporte ya tempelo.
26 Bango bazalaki na mikolo ya Yoyakime+ mwana ya Yeshua+ mwana ya Yozadake+ mpe na mikolo ya guvɛrnɛrɛ Nehemia+ mpe nganga-nzambe Ezera,+ mosali-bakopi.+
27 Mpe na ntango ya bofungoli+ efelo ya Yerusaleme balukaki Balevi, bazwaki bango na bisika na bango nyonso mpe bamemaki bango na Yerusaleme mpo na kosala milulu ya bofungoli mpe kosepela, ɛɛ, na matɔndi+ mpe na loyembo,+ na sɛmbalɛ ná bibɛtɛlo ya bansinga+ mpe na banzɛnzɛ.+
28 Mpe bana ya bayembi bayanganaki, bauti na Etúká,+ na zingazinga na Yerusaleme mpe na bamboka ya bato ya Netofa,+
29 mpe na Bete-gilgale+ mpe na bilanga ya Geba+ mpe Azemavete,+ mpo bayembi bamitongelaki bamboka+ zingazinga na Yerusaleme.
30 Mpe banganga-nzambe ná Balevi bamipɛtolaki+ mpe bapɛtolaki bato+ ná baporte+ ná efelo.+
31 Bongo namatisaki bankumu+ ya Yuda likoló ya efelo. Lisusu, natyaki bituluku minene mibale ya bayembi oyo bapesaka matɔndi+ mpe milɔngɔ ya bato oyo bazali kotambola, mpe moko ezalaki kotambola na lobɔkɔ ya mobali likoló ya efelo tii na Porte ya Mabondo ya Putulu ya Mɔtɔ.+
32 Mpe Hoshaya ná ndambo ya bankumu ya Yuda babandaki kotambola nsima na bango,
33 lisusu Azaria, Ezera ná Meshulame,
34 Yuda, Benyamina, Shemaya ná Yirimia;
35 lisusu na bana ya banganga-nzambe oyo bazalaki na bakelelo,+ Zekaria mwana ya Yonatane mwana ya Shemaya mwana ya Matania mwana ya Mikaya mwana ya Zakure+ mwana ya Asafe,+
36 ná bandeko na ye Shemaya, Azarele, Milalai, Gilalai, Maai, Netanele, Yuda, Hanani, ná bibɛtɛlo ya loyembo+ ya Davidi moto ya Nzambe ya solo; mpe Ezera+ mosali-bakopi liboso na bango.
37 Mpe na Porte ya Liziba+ mpe alima liboso na bango, bamataki na Eskalye+ ya Sité ya Davidi+ na esika ya komata na efelo likoló ya Ndako ya Davidi mpe tii na Porte ya Mai,+ na ɛsti.
38 Mpe etuluku mosusu ya bayembi oyo bapesaka matɔndi+ ezalaki kotambola na liboso, mpe ngai nsima na yango, ná ndambo ya bato, likoló ya efelo na likoló ya Ndako Molai ya Bitumbelo ya mampa+ mpe kino na Efelo Monene,+
39 mpe na likoló ya Porte ya Efraime+ mpe tii na Porte ya Engumba ya Kala+ mpe kino na Porte ya Mbisi+ mpe na Ndako Molai ya Hananele+ mpe na Ndako Molai ya Mea+ mpe tii na Porte ya Bampate;+ mpe batɛlɛmaki na Porte ya Bakɛngɛli.
40 Nsukansuka bituluku mibale ya bayembi oyo bapesaka matɔndi+ batɛlɛmaki na ndako+ ya Nzambe ya solo, ná ngai ná ndambo ya bayangeli-basungi elongo na ngai,+
41 ná banganga-nzambe Eliakime, Maaseya, Miniamine, Mikaya, Eliyonai, Zekaria, Hanania ná bakelelo,+
42 ná Maaseya, Shemaya, Eleazare, Uzi, Yehohanane, Malakiya, Elame ná Ezere. Mpe bayembi elongo na mokɛngɛli Yizirahiya bazalaki koyokama polele.+
43 Mpe bapesaki mbeka na mokolo yango, bambeka minene+ mpe basepelaki,+ mpo Nzambe ya solo asepelisaki bango na esengo monene.+ Mpe lisusu basi+ ná bana+ basepelaki, bongo kosepela ya Yerusaleme eyokanaki mosika.+
44 Lisusu, batyaki na mokolo yango mibali oyo bazalaki kokamba bandako+ ya kobomba biloko,+ makabo,+ mbuma ya liboso+ mpe moko ya bandambo zomi,+ mpo na kosangisa na kati biloko ya bilanga ya bingumba, biloko oyo esɛngami na mobeko+ mpo na banganga-nzambe mpe Balevi;+ mpamba te esengo ya Yuda ezalaki mpo na banganga-nzambe mpe Balevi+ oyo bazalaki kosala mosala.
45 Mpe babandaki kobatela lisɛngami+ ya Nzambe na bango mpe lisɛngami ya kopɛtolama,+ ná bayembi+ mpe bakɛngɛli ya baporte,+ na kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo mwana na ye.
46 Mpamba te na mikolo ya Davidi mpe ya Asafe na ntango ya kala, ezalaki na bankumu ya bayembi+ mpe na loyembo ya makumisi mpe ya kopesa Nzambe matɔndi.+
47 Mpe Yisraele mobimba na mikolo ya Zerubabele+ mpe na mikolo ya Nehemia+ bazalaki kopesa biloko ya bayembi+ mpe ya bakɛngɛli ya baporte+ na kolanda oyo basengelaki na yango mokolo na mokolo mpe bazalaki kosantisela yango Balevi;+ mpe Balevi bazalaki kosantisela yango bana ya Arona.
Maloba na nse
^ Emonani ete awa, nkombo moko ezangi na makomi ya Ebre.