Nehemia 10:1-39

10  Sikoyo baoyo bandimisaki yango na kashɛ+ ezalaki: Guvɛrnɛrɛ*+ Nehemia,+ mwana ya Hakalia,+Mpe Zidikiya,  Seraya,+ Azaria, Yirimia,  Pashure, Amaria, Malakiya,  Hatushe, Shebania, Maluke,  Harime,+ Meremote, Obadia,  Danyele,+ Ginetone, Baruke,  Meshulame, Abiya, Miyamine,  Maazia, Biligai ná Shemaya: baoyo wana bazalaki banganga-nzambe.  Lisusu Balevi: Yeshua+ mwana ya Azania, Binui na bana ya Henadade,+ Kadimiele 10  mpe bandeko na bango Shebania,+ Hodia, Kelita, Pelaya, Hanane, 11  Mika, Rehobe, Hashabia, 12  Zakure, Sherebia,+ Shebania, 13  Hodia, Bani, ná Beninu. 14  Bankumu ya bato: Paroshe, Pahate-moabe,+ Elame, Zatu, Bani, 15  Buni, Azegade, Bebai, 16  Adoniya, Bigivai, Adine, 17  Atere, Hizikiya, Azure, 18  Hodia, Hashume, Bezai, 19  Harife, Anatote, Nebai, 20  Magepiashe, Meshulame, Hezire, 21  Meshezabele, Zadoke, Yadua, 22  Pelatia, Hanane, Anaya, 23  Hoshea, Hanania, Hashube, 24  Halokeshe, Pila, Shobeke, 25  Rehume, Hashabana, Maaseya, 26  mpe Ahiya, Hanane, Anane, 27  Maluke, Harime, Baana. 28  Bato mosusu, banganga-nzambe,+ Balevi,+ bakɛngɛli ya baporte,+ bayembi,+ Banetinime+ mpe moto nyonso oyo amikabolaki na bato ya mikili yango+ mpo na kolanda mobeko+ ya Nzambe ya solo, basi na bango, bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi, baoyo nyonso bazalaki na boyebi mpe bakokaki kokanga ntina,+ 29  bakangamaki na bandeko na bango,+ bato na bango ya lokumu,+ mpe balapaki ndai+ oyo ezali na elakeli mabe+ mpo bázwa elakeli mabe yango, soki batiki kotambola na mobeko ya Nzambe ya solo, oyo epesamaki na lobɔkɔ ya Moize mosaleli ya Nzambe ya solo,+ mpe soki batiki kobatela+ mpe kosalela mitindo nyonso ya Yehova Nkolo na biso+ ná bikateli na ye ya lisambisi mpe malako na ye;+ 30  mpe ete tokopesa te bana na biso ya basi epai ya bato ya mokili yango, mpe tokozwela bana na biso ya mibali bana na bango ya basi te.+ 31  Bato ya mokili yango,+ baoyo bazalaki koya na biloko ya mombongo mpe na lolenge nyonso ya mbuma ya kosala farini na mokolo ya sabata mpo na kotɛka yango, tokozwa eloko moko te epai na bango na sabata+ to na mokolo moko mosantu,+ mpe na mbula ya nsambo,+ tokotika mabele epema mpe tokotika kosɛnga nyongo nyonso.+ 32  Lisusu, tomityelaki mibeko ya kopesaka, moto na moto na kati na biso, moko ya bandambo misato ya shekele mbula na mbula mpo na mosala ya ndako ya Nzambe na biso,+ 33  mpo na mampa oyo bamatisamatisá likoló ya mosusu+ mpe likabo ya mbuma ya ntango nyonso+ mpe likabo ya kotumba ya ntango nyonso ya basabata,+ ya basanza ya sika,+ mpo na bafɛti oyo etyamá+ mpe mpo na biloko mosantu,+ mpe mpo na makabo mpo na lisumu+ mpo na kozipa masumu ya Yisraele, mpe mpo na mosala nyonso ya ndako ya Nzambe na biso.+ 34  Lisusu, tobwakaki mbɛsɛ+ mpo na koyeba baoyo bakopesa nkoni+ oyo banganga-nzambe, Balevi mpe bato basengeli komema na ndako ya Nzambe na biso, na kotalela ndako ya bankɔkɔ na biso, na bantango oyo etyamá, mbula na mbula, mpo na kopelisaka yango likoló ya etumbelo ya Yehova Nzambe na biso,+ ndenge ekomami na mobeko;+ 35  mpe mpo na komema mbuma ya liboso oyo eteli na mabele+ na biso mpe bambuma ya liboso oyo eteli ya mbuma nyonso ya nzete ya lolenge nyonso,+ mbula na mbula, na ndako ya Yehova; 36  mpe bana ya liboso+ ya bana na biso ya mibali mpe ya banyama na biso ya mboka,+ ndenge ekomami na mobeko,+ mpe bana ya liboso ya bitonga na biso ya bangɔmbɛ mpe ya bitonga na biso ya bampate,+ mpo na komema na ndako ya Nzambe na biso, epai ya banganga-nzambe oyo bazali kosala mosala na ndako ya Nzambe na biso.+ 37  Lisusu, farini ya liboso ya mbumambuma oyo euti na mbuma na biso ya liboso,+ ná makabo+ na biso, ná mbuma na biso ya nzete ya lolenge nyonso,+ vinyo ya sika+ ná mafuta,+ tosengeli komema yango epai ya banganga-nzambe na bisika ya kolya+ ya ndako ya Nzambe na biso, lisusu moko ya bandambo zomi ya biloko ya mabele na biso epai ya Balevi,+ mpo bango, Balevi, nde bato bazwaka moko ya bandambo zomi na bingumba na biso nyonso oyo misala ya bilanga esalemaka. 38  Mpe nganga-nzambe, mwana ya Arona, asengeli kozala elongo na Balevi ntango Balevi bazali kozwa moko ya bandambo zomi; mpe Balevi bango moko basengeli kopesa moko ya bandambo zomi ya moko ya bandambo zomi na ndako ya Nzambe+ na biso na bisika ya kolya+ ya ndako ya kobomba biloko. 39  Mpo ezali na bisika yango ya kolya nde bana ya Yisraele mpe bana ya Balevi basengeli koya na likabo+ ya mbuma, vinyo ya sika+ mpe mafuta, mpe kuna nde epai bisaleli ya esika mosantu ná banganga-nzambe oyo bazali kosala mosala+ ná bakɛngɛli ya baporte+ mpe bayembi+ bazali; mpe tosengeli kosundola ndako ya Nzambe na biso te.+

Maloba na nse

To, “Tireshata.”