Nahumu 2:1-13
2 Moto oyo azali kopalanganisa ayei liboso na yo.+ Tiká ete esika oyo ebatelami makasi ebatelama. Kɛngɛlá nzela. Kangá loketo. Kembisá nguya mingi mpenza.+
2 Mpo Yehova akozongisa mpenza lolendo ya Yakobo,+ mpe lolendo ya Yisraele, mpamba te baoyo batikaka mpamba, batiki bango mpamba;+ mpe babebisi bitape na bango.+
3 Nguba ya bato na ye ya nguya epakolami langi ya motane; bato na ye ya nguya ya bomoi balati bilamba ya langi motane makasi.+ Likalo ya etumba na mokolo oyo ye azali komilɛngɛla ezali kongɛnga na mɔtɔ ya bibende oyo bakangisá, mpe makɔnga ya nzete ya jenevriye+ ezali kolɛnga.
4 Na babalabala, makalo ya bitumba ezali kokoba kotambola na ndenge moko ya ligboma.+ Ezali kopumbwapumbwa na bisika ya bato nyonso. Ezali komonana lokola bisungi. Ezali kopota mbangu lokola mikalikali.+
5 Akokanisa bato na ye ya lokumu.+ Bakobɛta libaku ntango bazali kotambola.+ Bakokende nokinoki epai ya efelo na yango, mpe bakokanga nzela makasi.
6 Baporte ya bibale ekofungwama mpenza, mpe ndako monene ya mokonzi ekobukana mpenza.
7 Mpe likambo yango ekatami; atikali bolumbu; akomemama mpenza,+ mpe bana basi oyo bazali baombo na ye bakokimela, ndenge bibenga esalaka,+ bakobɛtabɛta mitema na bango.+
8 Mpe Ninive, banda esalemá,+ ezalaki lokola liziba ya mai;+ kasi bazali kokima. “Bótɛlɛma! Bótɛlɛma!” Kasi moko te azali kotala nsima.+
9 Bópunza palata; bópunza wolo;+ mpo biloko oyo ebongisamá ezali na nsuka te. Biloko kitoko ya ndenge nyonso ezali ebele mpenza.+
10 Engumba etikali polele, ezangi eloko mpe ekómi mpamba!+ Mpe motema elɛmbi,+ mpe mabɔlɔngɔ ezali kotengatenga,+ mpe loketo nyonso ezali na mpasi makasi;+ nzokande lokola babulungani, bilongi na bango nyonso ekómi motane.+
11 Wapi esika bankɔsi efandaka, mpe wapi mobenga ya bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki, epai nkɔsi-mobali ezalaki kotambola mpe kokɔta,+ epai mwana-nkɔsi ya mobali ezalaki, mpe epai moto ata moko te azalaki kolɛngisa yango?+
12 Nkɔsi-mobali ezalaki kopasolapasola na ndenge ekoki mpenza mpo na bana na yango, mpe ezalaki kokamola nkingo mpo na bankɔsi na yango ya basi. Mpe ezalaki kotondisa madusu na yango na banyama ya kolya mpe esika na yango ya kobombana na banyama oyo bapasolipasoli.+
13 “Talá! nazali kotɛmɛla yo,” yango nde liloba ya Yehova ya mampinga,+ mpe nakozikisa likalo na yango ya etumba na katikati ya molinga.+ Mpe mopanga ekolya bana-nkɔsi na yo oyo nkingo etondi na nsuki.+ Mpe nakolongola na mabele nyama na yo ya kolya, mpe mongongo ya bamemi-nsango na yo ekoyokana lisusu te.”+