Mosakoli 9:1-18

9  Mpo natyaki oyo nyonso na motema na ngai, ɛɛ mpo na koluka oyo nyonso:+ bayengebene ná bato ya bwanya ná misala na bango bazali na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.+ Bato bayebi te bolingo to koyina oyo ezalaki kala liboso na bango.+  Makambo ndenge moko ekómelaka bango nyonso.+ Nsuka ezali kaka moko+ mpo na moyengebene+ ná moto mabe,+ mpo na moto malamu ná moto ya pɛto ná moto ya mbindo, mpo na moto oyo azali kopesa mbeka ná moto oyo azali kopesa mbeka te. Moto malamu azali ndenge moko na mosumuki;+ moto oyo azali kolapa ndai azali ndenge moko na moto oyo abangaki kolapa ndai.+  Oyo nde ezali mpasi na nyonso oyo esalemi na nse ya moi: lokola nsuka ezali kaka moko mpo na bato nyonso,+ motema ya bana ya bato etondi mpe na mabe;+ mpe ligboma+ ezali na motema na bango na bomoi na bango mobimba, mpe nsima na yango bakei epai ya bakufi!+  Moto oyo atángami na kati ya bato nyonso ya bomoi, elikya ezali, mpamba te mbwa ya bomoi+ eleki nkɔsi oyo ekufá.+  Mpo bato ya bomoi bayebi ete bakokufa;+ kasi bakufi bayebi ata eloko moko te,+ bazali mpe na lifuti lisusu te, mpo bato babosani makambo oyo ekokaki kosala ete bákanisa bango.+  Lisusu, bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili,+ mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi.+  Kende, lyá bilei na yo na esengo mpe mɛlá vinyo na yo na motema esengo,+ mpo Nzambe ya solo asepeli na misala na yo.+  Ntango nyonso, bilamba na yo ezala mpɛmbɛ,+ mpe mafuta ezanga te na motó na yo.+  Sepelá na bomoi elongo na mwasi oyo olingi,+ mikolo nyonso ya bomoi na yo ya mpamba, oyo Ye apesi yo na nse ya moi, mikolo nyonso ya makambo na yo ya mpamba, mpo yango nde mbano na yo na bomoi+ mpe na mosala na yo ya makasi oyo ozali kosala makasi na nse ya moi. 10  Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza,+ mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te,+ bwanya mpe te+ na Nkunda,*+ esika ozali kokende.+ 11  Nabalukaki mpo namona na nse ya moi ete ezali te bato ya mbangu mingi nde balongaka na momekano ya kopota mbangu,+ to bato ya nguya nde balongaka na etumba,+ ezali mpe te bato ya bwanya nde bazwaka bilei,+ ezali mpe te bato ya mayele nde bazwaka bomɛngo,+ mpe ezali kutu te bato oyo bazali na boyebi nde bandimamaka;+ mpamba te ntango ná makambo oyo ekanami te ekwelaka bango nyonso.+ 12  Mpo moto+ mpe ayebi ntango na ye te.+ Kaka lokola mbisi oyo ezali kozwama na monyama+ oyo ebomaka, mpe lokola bandɛkɛ oyo ezali kozwama na motambo,+ ndenge wana mpe bana ya bato bazali kokangama na motambo na ntango ya mpasi,+ ntango yango ekwelaka bango pwasa.+ 13  Lisusu namonaki boye mpo na bwanya na nse ya moi—likambo yango elekelaki ngai: 14  Ezalaki na mwa engumba moko, mpe kuna bato bazalaki moke; mpe mokonzi moko monene ayelaki yango, mpe azingaki yango mpe atongaki bangomba minene ya mabele mpo na kobunda na yango.+ 15  Mpe moto moko amonanaki kuna, moto oyo akelelá, nzokande azali na bwanya, mpe abikisaki engumba yango na bwanya na ye.+ Kasi ata moto moko te akanisaki lisusu moto yango oyo akelelá.+ 16  Mpe ngai nalobaki boye: “Bwanya eleki nguya;+ nzokande bwanya ya moto oyo akelelá batyolaka yango, mpe maloba na ye bayokaka yango te.”+ 17  Maloba ya bato ya bwanya oyo elobami na kimya, esengeli koyoka yango+ koleka koganga ya moto oyo azali koyangela na kati ya bazoba.+ 18  Bwanya eleki bisaleli ya etumba, mpe mosumuki moko mpamba akoki kobebisa ebele ya makambo ya malamu.+

Maloba na nse

To, “Sheole.” Talá Ap 4.