Mosakoli 8:1-17
8 Nani akokani na moto ya bwanya?+ Mpe nani ayebi ndimbola ya likambo?+ Bwanya ya moto engɛngisaka elongi na ye, mpe ata elongi na ye ekangami ebongwanaka.+
2 Nalobi: “Batelá etinda ya mokonzi,+ mpe salá bongo mpo na ndai ya Nzambe.+
3 Kowela kolongwa liboso na ye te.+ Kozala na likambo ya mabe te.+ Mpo nyonso oyo asepeli kosala, akosala yango,+
4 mpamba te liloba ya mokonzi ezali na nguya;+ mpe nani akoki koloba na ye ete: ‘Ozali kosala nini?’”
5 Ye oyo azali kobatela mobeko akokutana na likambo moko ya mpasi te,+ mpe motema ya bwanya ekoyeba ntango ya kosala likambo mpe lisambisi.+
6 Mpo likambo nyonso ezali na ntango na yango mpe lisambisi,+ mpamba te mpasi ya bato ezali mingi mpenza.+
7 Mpo moto moko te ayebi oyo ekosalema,+ mpamba te nani akoki koyebisa ye ndenge yango ekosalema?
8 Moto moko te azali na bokonzi likoló ya elimo mpo na kopekisa elimo;+ mpe moto moko te azali na bokonzi likoló ya mokolo ya liwa;+ ndingisa ya kolongwa na etumba ezali mpe te.+ Mpe mabe ekobikisa ata moke te baoyo bazali komipesa na yango.+
9 Nyonso wana namoni yango, mpe natyaki motema na ngai na mosala nyonso oyo esalemi na nse ya moi, ntango oyo moto ayangeli moto mpo na komonisa ye mpasi.+
10 Kasi, atako ezali bongo, namoni bato mabe bazali kokundama,+ ndenge bakɔtaki mpe ndenge babimaki na esika mosantu+ mpe babosanaki bango na engumba esika basalaki bongo.+ Yango mpe ezali mpamba.
11 Lokola etumbu mpo na mosala mabe epesamaki nokinoki te,+ motema ya bana ya bato etingami na kosala mabe.+
12 Ata soki mosumuki asali mabe+ mbala nkama (100) mpe azali se kosala ndenge alingi ntango molai, nzokande ngai nayebi mpe ete ekosukela baoyo babangaka Nzambe ya solo malamu,+ mpo bazalaki kobanga ye.+
13 Kasi ekosukela moto mabe malamu te,+ mpe akoyeisa molai te mikolo na ye oyo ezali lokola elili,+ mpo azali kobanga Nzambe te.+
14 Likambo moko ya mpamba esalemaka na mabele: ezali na bayengebene oyo makambo ekómelaka bango lokola oyo ebongi kokómela bato mabe mpo na mosala na bango,+ mpe ezali na bato mabe oyo makambo ekómelaka bango lokola oyo ebongi kokómela bayengebene mpo na mosala na bango.+ Nalobaki ete yango mpe ezali mpamba.
15 Mpe ngai nakumisaki esengo,+ mpo bato bazali na eloko moko te na nse ya moi oyo eleki kolya ná komɛla ná kosepela, mpe yango ezala elongo na bango na mosala na bango ya makasi mpo na mikolo ya bomoi na bango,+ oyo Nzambe ya solo apesi bango na nse ya moi.+
16 Bongo natyaki motema na ngai+ mpo na koyeba bwanya mpe komona mosala oyo ezali kosalema na mabele,+ mpo ezali na moto oyo azali kozwa mpɔngi na miso te, ezala na moi to na butu.+
17 Mpe namonaki mosala nyonso ya Nzambe ya solo,+ ndenge bato bakoki te koyeba mosala oyo esalemá na nse ya moi;+ ata bato bazali se kosala makasi mpenza mpo na koluka, bazali koyeba te.+ Mpe ata soki balobi ete bazali na bwanya mwa mingi mpo na koyeba,+ bakokoka te koyeba.+