Mosakoli 7:1-29
7 Nkombo malamu eleki mafuta ya malamu,+ mpe mokolo ya liwa eleki mokolo ya kobotama.+
2 Kokende na ndako ya kolela ebembe eleki kokende na ndako ya fɛti,+ mpo yango ezali nsuka ya bato nyonso; mpe moto ya bomoi asengeli kotya yango na motema na ye.
3 Komitungisa eleki kosɛka na malamu,+ mpamba te na mawa ya elongi, motema ekómaka malamu koleka.+
4 Motema ya bato ya bwanya ezali na ndako ya kolela ebembe,+ kasi motema ya bazoba ezali na ndako ya esengo.+
5 Kozala moto oyo azali koyoka mpamela ya moto ya bwanya+ eleki kozala moto oyo azali koyoka loyembo ya bazoba.+
6 Mpo ndenge makɛlɛlɛ ya banzubɛ na nse ya nzungu ezalaka, kosɛka ya zoba ezali mpe bongo;+ yango mpe ezali mpamba.
7 Mpo monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma,+ mpe likabo+ ekoki kobebisa motema.+
8 Nsuka mpenza ya likambo eleki ebandeli na yango.+ Moto ya motema molai aleki moto oyo azali na elimo ya lolendo.+
9 Elimo na yo esilika nokinoki te,+ mpo nkanda efandaka nde na ntolo ya bazoba.+
10 Koloba te ete: “Mpo na nini mikolo ya liboso elekaki mikolo oyo na malamu?”+ Ezali bwanya te+ nde etindi yo otuna ndenge wana.
11 Bwanya elongo na libula ezali malamu mpe ezali na litomba mpo na baoyo bazali komona moi.+
12 Mpo bwanya ebatelaka+ ndenge mpe mbongo ebatelaka;+ kasi litomba ya boyebi ezali ete bwanya ebatelaka na bomoi baoyo bazali na yango.+
13 Talá mosala+ ya Nzambe ya solo, mpo nani akoki kosembola eloko oyo ye atɛngisi?+
14 Na mokolo ya malamu, zalá malamu,+ mpe na mokolo ya mpasi, moná ete Nzambe ya solo asali yango kaka ndenge asalá oyo wana,+ mpo bato báyeba ata eloko moko te oyo ekoya nsima na bango.+
15 Namoni eloko nyonso na mikolo na ngai ya mpamba.+ Moyengebene azali kokufa na boyengebene na ye,+ mpe moto mabe azali koumela na mabe na ye.+
16 Kokóma moyengebene koleka ndelo te,+ to komimonisa na bwanya koleka ndelo te.+ Mpo na nini okomibebisa?+
17 Kozala mabe koleka ndelo te,+ to kokóma zoba te.+ Mpo na nini okufa wana ezali naino ntango na yo te?+
18 Malamu osimba toli oyo, mpe kotika te kosimba toli oyo mosusu;+ mpo moto oyo abangaka Nzambe akosimba yango nyonso.+
19 Bwanya ekómisaka moto ya bwanya makasi koleka bakonzi zomi ya nguya oyo bazali na kati ya engumba.+
20 Mpo ezali na moto moko te oyo azali moyengebene na mabele oyo asalaka kaka malamu mpe asalaka lisumu te.+
21 Lisusu, kotya motema na yo te na maloba nyonso oyo bato bakoki koloba,+ noki oyoka mosaleli na yo azali kolakela yo mabe.+
22 Mpo motema na yo moko eyebi malamu ete mbala mingi yo moko mpe olakelaki bato mosusu mabe.+
23 Nasalelaki bwanya mpo na komeka makambo nyonso oyo. Nalobaki boye: “Nakokóma na bwanya.” Kasi ezalaki mosika na ngai.+
24 Makambo nyonso oyo esalemá eleki mosika mayele ya moto mpe ezali mozindo mingi koleka. Nani akoki koyeba yango?+
25 Ngai nabalukaki, motema na ngai mpe ebalukaki,+ mpo na koyeba, kotalatala mpe koluka bwanya+ mpe ntina ya makambo,+ mpe koyeba mabe ya bozoba mpe bozoba ya ligboma;+
26 mpe namonaki boye: Mwasi oyo azali mpenza minyama ya bokila mpe oyo motema na ye ezali minyama oyo babengi pusu mpe oyo mabɔkɔ na ye ezali bikangeli+ azali bololo koleka liwa.+ Soki moto akimi mwasi yango, azali malamu na miso ya Nzambe ya solo, kasi soki mwasi yango akangi ye, moto yango azali kosala lisumu.+
27 Moyanganisi+ alobi: “Talá oyo namoni, ntango nataleli eloko mokomoko mpo nayeba likambo yango nyonso,+
28 oyo molimo na ngai elukaki ntango nyonso, kasi namoni yango te. Na bato nkóto (1 000), namoni mobali moko+ kasi na bango nyonso, namoni ata mwasi moko te.+
29 Talá! namoni kaka likambo oyo: ete Nzambe ya solo asalaki bato sembo,+ kasi bango moko baluki myango mingi.”+