Mosakoli 6:1-12
6 Ezali na likambo moko ya mpasi oyo namoni na nse ya moi, mpe emonanaka mingi na kati ya bato:
2 moto oyo Nzambe ya solo apesi bomɛngo, biloko mingi ná nkembo+ mpe oyo azali kozanga eloko moko te oyo molimo na ye ezali na mposa na yango makasi,+ kasi Nzambe ya solo apesi ye nzela alya yango te,+ nzokande mopaya+ azali kolya yango. Yango ezali mpamba mpe ezali maladi moko mabe.
3 Soki mobali moko aboti mbala nkama (100),+ mpe azali na bomoi bambula mingi, bongo mikolo ya bambula na ye ekómi ebele,+ kasi molimo na ye etondi na biloko ya malamu te+ mpe akɔti na lilita te,+ nakoloba ete mwana oyo akufá banda na libumu aleki ye.+
4 Mpo ye abotami kaka mpamba mpe akei na molili, mpe molili ekozipa nkombo na ye.+
5 Amoni ata moi te, ayebi mpe yango te.+ Ye apemi koleka moto oyo ya liboso.+
6 Ata soki aumeli na bomoi mbula nkóto (1 000) mbala mibale nzokande amoná bolamu te,+ ezali kaka na esika moko nde bato nyonso bazali kokende, bongo te?+
7 Mosala makasi nyonso oyo bato basalaka ezali mpo na monɔkɔ na bango,+ ata bongo molimo na bango ezali kotonda te.
8 Mpo litomba nini moto ya bwanya azali na yango koleka zoba?+ Eloko nini moto ya mpasi azali na yango ndenge ayebi komitambwisa liboso ya bato ya bomoi?
9 Komona na miso eleki mposa makasi ya molimo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+
10 Eloko nyonso oyo ezali, nkombo na yango esilá kotángama, mpe eyebani soki moto azali nini;+ mpe akoki te kosamba likambo na ye na moto oyo aleki ye na nguya.+
11 Lokola biloko mingi ezali kobimisa makambo mingi ya mpamba,+ litomba nini yango ezali kopesa moto?
12 Mpo nani ayebi bolamu oyo moto azali na yango na bomoi+ mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye ya mpamba, ntango azali kolekisa yango lokola elili?+ Mpo nani akoki koyebisa moto makambo oyo ekosalema nsima na ye na nse ya moi?+