Mosakoli 5:1-20

5  Batelá makolo+ na yo ntango nyonso oyo ozali kokende na ndako ya Nzambe ya solo; mpe pusaná pene mpo na koyoka,+ kasi mpo na kopesa mbeka te ndenge bazoba basalaka,+ mpo bazali koyeba te ete bazali kosala mabe.+  Kowela koloba te; mpe motema+ na yo ewela te kobimisa liloba liboso ya Nzambe ya solo.+ Mpo Nzambe ya solo azali na likoló+ kasi yo ozali na mabele. Yango wana maloba na yo esengeli kozala mingi te.+  Mpo ndɔtɔ eyaka mpenza mpo na ebele ya makambo,+ mongongo ya zoba mpo na ebele ya maloba.+  Ntango nyonso oyo osaleli Nzambe elako, kokakatana te mpo na kokokisa yango,+ mpo basepelaka na bazoba te.+ Elako oyo osali, kokisá yango.+  Malamu osala elako+ te na esika osala yango mpe okokisa yango te.+  Kotika te monɔkɔ na yo esalisa nzoto na yo lisumu,+ koloba mpe liboso ya anzelu+ te ete ezalaki libunga.+ Mpo na nini Nzambe ya solo asilika mpo na mongongo na yo mpe abuka mosala ya mabɔkɔ na yo?+  Mpo bandɔtɔ+ ezalaka mpo na ebele ya makambo, ezala mpe makambo ya mpamba to maloba ebele ebele. Kasi bangá Nzambe ya solo ye moko.+  Soki omoni bazali konyokola moto oyo akelelá mpe bazali kolongola na makasi bosembo+ ná boyengebene na etúká moko oyo eyangelami, kokamwa na likambo yango te,+ mpo moto oyo azali likoló koleka oyo azali likoló+ azali kotala,+ mpe ezali na baoyo bazali likoló na bango.  Lisusu, litomba ya mabele ezali mpo na bato yango nyonso;+ ata mokonzi, basalelaka ye elanga mpo azwa mbuma na yango.+ 10  Moto oyo alingá palata akotonda palata te, mpe moto alingá bozwi akotonda mpe lifuti te.+ Yango mpe ezali mpamba.+ 11  Ntango biloko ya malamu ekómi mingi, baoyo bakolya yango bakómaka mpenza mingi.+ Bongo wapi litomba ya nkolo na yango, longola kaka kotala yango na miso?+ 12  Mosaleli, alya moke to mingi, mpɔngi+ na ye ezalaka elɛngi; kasi ebele ya biloko ya mozwi epesaka ye mpɔngi te. 13  Ezali na likambo moko ya mpasi monene mpenza oyo namoni na nse ya moi: bomɛngo oyo bazali kobombela nkolo na yango mpo na mpasi na ye.+ 14  Mpe bomɛngo yango ebebi+ mpo na likambo moko ya mpasi, mpe aboti mwana ntango azali na eloko ata moko te na lobɔkɔ na ye.+ 15  Lokola moto abimi bolumbu na libumu ya mama na ye, akokende mpe bolumbu,+ kaka ndenge ayaki; mpe moto akomema+ ata eloko moko te mpo na mosala makasi oyo ye asali, eloko oyo akoki komema na lobɔkɔ na ye. 16  Yango mpe ezali likambo moko ya mpasi monene mpenza: kaka ndenge moto ayaki, akokende mpe bongo; bongo litomba nini ezali mpo na moto oyo azali ntango nyonso kosala mosala makasi mpo na mopɛpɛ?+ 17  Lisusu, alyaka kaka na molili mikolo na ye nyonso, ná mitungisi mingi,+ ná maladi na nzoto na ye mpe makambo oyo ezali kopesa nkanda. 18  Talá! Eloko ya malamu koleka oyo ngai namoni, oyo ezali kitoko, ezali nde ete moto alya mpe amɛla mpe amona bolamu mpo na mosala na ye makasi+ oyo azali kosala yango makasi na nse ya moi mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye oyo Nzambe ya solo apesi ye, mpo yango nde mbano na ye. 19  Lisusu, moto nyonso oyo Nzambe ya solo apesá bomɛngo mpe biloko mingi,+ apesá ye mpe makoki ya kolya yango+ mpe ya kozwa mbano na ye mpe ya kosepela na mosala na ye ya makasi.+ Yango ezali likabo ya Nzambe.+ 20  Mpo akokanisa mingi te mikolo ya bomoi na ye, mpamba te Nzambe ya solo azali kopesa ye mosala ná esengo na motema na ye.+

Maloba na nse