Mosakoli 4:1-16
4 Mpe ngai nabalukaki mpo namona minyoko nyonso+ oyo ezali kosalema na nse ya moi, mpe talá! mpisoli ya bato oyo bazali konyokwama,+ kasi bazalaki na mobɔndisi te;+ nde bato oyo bazalaki konyokola bango bazalaki na nguya, yango wana bazalaki na mobɔndisi te.
2 Mpe napesaki longonya na bato oyo bakufá na esika ya kopesa longonya na bato oyo bazali naino na bomoi.+
3 Yango wana moto oyo aleki bango mibale ezali moto oyo abotami naino te,+ oyo amoni te mosala ya mpasi oyo ezali kosalema na nse ya moi.+
4 Mpe ngai namoni mosala nyonso ya makasi mpe mayele nyonso na mosala,+ ete ezali kaka kowelana kati na bato;+ yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.
5 Zoba azali kokanga mabɔkɔ na ye+ mpe azali kolya mosuni na ye moko.+
6 Mwa kopema moke* eleki ebele ya mosala makasi* mpe kolanda mopɛpɛ.+
7 Ngai nabalukaki mpo namona makambo ya mpamba na nse ya moi:
8 Ezali na moto oyo azali kaka ye moko, azali na moninga te;+ azali mpe na mwana te to na ndeko te,+ kasi na mosala na ye nyonso ya makasi ezali na nsuka te. Lisusu, miso na ye etondi bomɛngo te:+ “Bongo mpo na nani nazali kosala makasi mpe kozangisa molimo na ngai biloko ya malamu?”+ Yango mpe ezali mpamba, mpe ezali mosala ya mpasi.+
9 Bato mibale baleki moto moko,+ mpo bazali na mbano malamu na mosala na bango ya makasi.+
10 Mpo soki moko na bango akwei, mosusu akoki kotɛlɛmisa moninga na ye.+ Kasi ekozala boni soki moto oyo azali kaka ye moko akwei mpe moto mosusu azali te mpo na kotɛlɛmisa ye?+
11 Lisusu, soki bato mibale balali esika moko, bakoyoka mpenza mɔtɔ; kasi moto oyo azali kaka ye moko akoyoka mɔtɔ ndenge nini?+
12 Mpe soki moto akoki kolonga moto oyo azali kaka ye moko, bato mibale bakoki kotɛlɛmɛla ye.+ Mpe nsinga oyo esalemi na bansinga misato ekatanaka nokinoki te.
13 Mwana oyo akelelá kasi azali na bwanya+ aleki mokonzi oyo azali mobange kasi zoba,+ oyo azali lisusu komona ntina ya makebisi te.+
14 Mpo abimi na ndako ya bolɔkɔ mpo akóma mokonzi,+ atako abotamaki moto oyo akelelá na bokonzi ya mokonzi wana.+
15 Namoni likambo oyo ekómelaka bato nyonso ya bomoi oyo bazali kotambolatambola na nse ya moi, ndenge mwana, oyo ayei nsima, azwi esika ya mokonzi.+
16 Atako bato oyo ye ayangelaki bazalaki ebele mpenza,+ na nsima, bakosepela na ye te,+ mpo yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+
Maloba na nse
^ Lil., “lobɔkɔ moko oyo etondi na kopema.”
^ Lil., “mabɔkɔ mibale oyo etondi na mosala makasi.”