Mosakoli 3:1-22

3  Eloko nyonso ezali na ntango na yango,+ ɛɛ likambo na likambo na ntango na yango na nse ya lola:  ntango ya kobotama+ mpe ntango ya kokufa;+ ntango ya kolona mpe ntango ya kopikola eloko oyo elonamaki;+  ntango ya koboma+ mpe ntango ya kobikisa;+ ntango ya kobuka mpe ntango ya kotonga;+  ntango ya kolela+ mpe ntango ya kosɛka;+ ntango ya koganga na kolela+ mpe ntango ya kobina na kopumbwapumbwa;+  ntango ya kobwaka mabanga+ mpe ntango ya kosangisa mabanga;+ ntango ya koyamba+ mpe ntango ya koboya koyamba;+  ntango ya koluka+ mpe ntango ya kotika koluka eloko mpo ebungi; ntango ya kobomba mpe ntango ya kobwaka;+  ntango ya kopasola elamba+ mpe ntango ya kotonga yango;+ ntango ya kofanda nyɛɛ+ mpe ntango ya koloba;+  ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina;+ ntango ya etumba+ mpe ntango ya kimya.+  Mosali akozwa litomba nini na likambo oyo azali kosala makasi?+ 10  Namoni mosala oyo Nzambe apesi bana ya bato básala.+ 11  Asali eloko nyonso kitoko na ntango na yango.+ Ata likanisi ya kozala na bomoi ya seko, atye yango na motema na bango,+ mpo bato báyeba te mosala oyo Nzambe ya solo asalá banda ebandeli tii na nsuka.+ 12  Nayei koyeba ete eloko oyo eleki malamu mpo na bango ezali te, longola kaka kosepela mpe kosala malamu na boumeli ya bomoi;+ 13  mpe lisusu ete moto nyonso alya mpe amɛla mpenza mpe amona bolamu mpo na mosala na ye nyonso ya makasi.+ Ezali likabo ya Nzambe.+ 14  Nayei koyeba ete nyonso oyo Nzambe ya solo asalaka, ekozala mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Eloko ya kobakisa ezali te mpe eloko ya kolongola ezali te;+ kasi Nzambe ya solo asali yango,+ mpo bato bábanga ye.+ 15  Oyo ezalaki, esilá kozala, mpe oyo ekozala esilá kozala;+ mpe Nzambe ya solo+ ye moko azali se koluka oyo bazali kolanda.+ 16  Mpe namoni lisusu na nse ya moi ete mabe ezalaki na esika ya bosembo, mpe mabe ezalaki na esika ya boyengebene.+ 17  Ngai nalobi na motema na ngai ete:+ “Nzambe ya solo akosambisa moyengebene mpe moto mabe,+ mpo epai na ye, likambo na likambo mpe mosala na mosala ezali na ntango.”+ 18  Ngai, ɛɛ ngai, nalobi na motema na ngai mpo na bana ya bato ete Nzambe ya solo akomeka bango, mpo bámona ete bango moko bazali banyama.+ 19  Mpo bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko.+ Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka;+ mpe bango nyonso bazali na elimo kaka moko,+ yango wana moto aleki nyama te, mpo nyonso ezali mpamba. 20  Bango nyonso bakokende esika moko.+ Bango nyonso bauti na putulu,+ mpe bango nyonso bazali kozonga na putulu.+ 21  Nani ayebi soki elimo ya bana ya bato ezali komata likoló, mpe soki elimo ya nyama ezali kokita na nse, na mabele?+ 22  Mpe namoni ete eloko oyo eleki malamu ezali te, longola kaka ete moto asepela na misala na ye,+ mpo yango nde mbano na ye; mpamba te nani akozongisa ye mpo atala oyo ekozala nsima na ye?+

Maloba na nse