Mosakoli 2:1-26

2  Ɛɛ ngai, nalobaki boye na motema na ngai:+ “Yaká sikoyo, nameka yo na esengo.+ Lisusu, moná bolamu.”+ Talá! yango mpe ezalaki mpamba.  Nayebisaki kosɛka ete: “Ligboma!”+ mpe esengo+ ete: “Ezali na litomba nini?”  Na motema na ngai, natalaki malamumalamu ndenge nasepelisaki nzoto na ngai na vinyo,+ wana natambwisaki motema na ngai na bwanya,+ ɛɛ, mpe nalandaki bozoba mpo namona soki ezali na eloko nini ya malamu na makambo oyo bana ya bato basalaki na nse ya lola na mikolo nyonso ya bomoi na bango.+  Nasalaki misala minene koleka.+ Natongaki bandako;+ nalonaki bilanga ya vinyo.+  Nasalaki bilanga ná bazamba,+ mpe nalonaki na kati banzete ya mbuma ya ndenge nyonso.  Nasalaki maziba ya mai,+ mpo na kosopa mai na yango na bazamba, mpo na kokolisa banzete.+  Nazwaki basaleli ya mibali mpe basaleli ya basi,+ mpe nakómaki na bana oyo bato ya ndako na ngai babotaki.+ Lisusu, nakómaki na bibwɛlɛ, bangɔmbɛ mpe bitonga ya bampate mingi mpenza, koleka baoyo nyonso bazalaki liboso na ngai na Yerusaleme.+  Namitondiselaki mpe palata ná wolo,+ mpe biloko oyo ezalaka kaka na bakonzi mpe na bitúká oyo eyangelami.+ Nazwaki bayembi ya mibali mpe bayembi ya basi+ mpe makambo oyo esepelisaka mpenza+ bana ya bato, mwasi, ɛɛ, basi.+  Mpe nakómaki moto monene koleka mpe nazwaki koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai na Yerusaleme.+ Lisusu, nabatelaki kaka bwanya na ngai.+ 10  Mpe eloko nyonso oyo miso na ngai esɛngaki, naboyelaki yango te.+ Napimelaki motema na ngai ata esengo moko te, mpo motema na ngai esepelaki na mosala na ngai nyonso ya makasi,+ mpe yango ekómaki mbano na ngai oyo euti na mosala na ngai nyonso ya makasi.+ 11  Mpe ngai, ɛɛ ngai, natalaki misala na ngai nyonso oyo mabɔkɔ na ngai esalaki mpe mosala makasi oyo nasalaki makasi nakokisa,+ mpe talá! nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ,+ eloko moko ya litomba ezalaki te na nse ya moi.+ 12  Mpe ngai, ɛɛ ngai, nabalukaki mpo nayeba bwanya,+ ligboma ná bozoba;+ mpo eloko nini moto ya mabele, oyo azali nsima ya mokonzi, akoki kosala? Kaka eloko oyo bato basilá kosala. 13  Mpe namonaki, ɛɛ ngai, ete bwanya ezali na litomba mingi koleka bozoba,+ se ndenge pole ezali na litomba mingi koleka molili.+ 14  Moto nyonso ya bwanya, miso na ye ezali na motó na ye;+ kasi zoba azali kotambola na molili mpenza.+ Ngai mpe nayaki koyeba ete nsuka kaka moko ekómelaka bango nyonso.+ 15  Mpe ngai nalobaki na motema+ na ngai ete: “Nsuka oyo ekómelaka zoba+ ekokómela mpe ngai, ɛɛ, ngai.”+ Bongo mpo na nini ngai nakómaki na bwanya koleka ndelo+ na ntango wana? Mpe nalobaki boye na motema na ngai: “Yango mpe ezali mpamba.” 16  Mpo bakokanisa moto ya bwanya te koleka zoba, mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Kutu na mikolo oyo ezali koya, bakobosana mpenza bango nyonso; bongo moto ya bwanya akokufa ndenge nini? Ndenge moko na zoba.+ 17  Mpe nayinaki bomoi+ mpo, na miso na ngai, mosala oyo esalemi na nse ya moi ezalaki ya mpasi,+ mpo nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+ 18  Mpe ngai, ɛɛ ngai, nayinaki mosala na ngai nyonso ya makasi oyo nazalaki kosala makasi na nse ya moi,+ oyo nakotikela moto oyo akoya nsima na ngai.+ 19  Mpe nani ayebi soki akozala moto ya bwanya to zoba?+ Nzokande akotambwisa mosala na ngai nyonso ya makasi oyo nasalaki makasi mpe oyo namoniselaki bwanya na nse ya moi.+ Yango mpe ezali mpamba. 20  Mpe ngai, nabalukaki mpe motema na ngai ezangaki elikya+ na mosala nyonso ya makasi oyo nasalaki makasi na nse ya moi. 21  Mpo ezali na moto oyo asalaki mosala na ye ya makasi na bwanya, na boyebi mpe na mayele,+ kasi mbano na ye bakopesa yango moto oyo asalaki makasi te na likambo yango.+ Yango mpe ezali mpamba mpe mpasi monene mpenza.+ 22  Mpo moto azwaka nini na mosala na ye nyonso ya makasi mpe na milende motema na ye ezali kosala na ndenge azali kosala makasi na nse ya moi?+ 23  Mpamba te na mikolo na ye nyonso, mosala na ye kaka mpasi mpe mitungisi,+ mpe na butu, motema na ye ezali kolala te.+ Yango mpe ezali kaka mpamba. 24  Eloko oyo eleki malamu mpo na moto ezali te, longola kaka kolya mpe komɛla mpenza mpe komonisa molimo na ye bolamu mpo na mosala na ye ya makasi.+ Yango mpe namoni, ɛɛ ngai, ete euti na lobɔkɔ ya Nzambe ya solo.+ 25  Mpo nani alyaka+ malamu mpe amɛlaka malamu koleka ngai?+ 26  Mpo apesi moto oyo azali malamu na miso na ye+ bwanya ná boyebi ná esengo,+ kasi apesi mosumuki mosala ya koyanganisa mpe ya kosangisa kaka mpo na kopesa moto oyo azali malamu na miso ya Nzambe ya solo.+ Yango mpe ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+

Maloba na nse