Mosakoli 11:1-10

11  Bwaká limpa+ na yo na mai,+ mpo nsima ya mikolo mingi okozwa yango lisusu.+  Pesá bato nsambo likabo, ata mpe bato mwambe,+ mpo oyebi te mpasi nini ekoyela mabele.+  Soki mapata etondi na mai, esopaka mbula makasi na mabele;+ mpe soki nzete ekwei na sudi to na nɔrdi, na esika oyo nzete+ yango ekwei, kuna nde yango ekozala.  Ye oyo azali kotalatala mopɛpɛ akolona mboto te; mpe ye oyo azali kotala mapata akobuka mbuma te.+  Lokola oyebi te ndenge elimo esalaka na kati ya mikuwa ya mwana oyo azali na libumu ya mwasi ya zemi,+ oyebi mpe te mosala ya Nzambe ya solo, oyo asalaka biloko nyonso.+  Na ntɔngɔ, loná mboto na yo mpe tii na mpokwa kopemisa lobɔkɔ na yo te;+ mpo oyebi te epai wapi yango ekolonga,+ ezala awa to kuna, to soki yango nyonso mibale ekozala malamu.  Pole ezali elɛngi, mpe ezali malamu miso emona moi;+  mpo soki moto akozala na bomoi bambula mingi, tiká asepela na yango nyonso.+ Mpe akanisa lisusu mikolo ya molili,+ atako yango ekoki kozala mingi; mokolo nyonso oyo eyei ezali mpamba.+  Elenge, sepelá+ na bolenge na yo, mpe motema na yo esala yo malamu na mikolo ya bolenge na yo, mpe tambolá na banzela ya motema na yo mpe na makambo oyo miso na yo emoni.+ Kasi yebá ete mpo na oyo wana nyonso, Nzambe ya solo akosambisa yo.+ 10  Yango wana, longolá mitungisi na motema na yo, mpe longolá mpasi na nzoto na yo;+ mpo bolenge mpe eleko kitoko ya bomoi ezali mpamba.+

Maloba na nse