Mosakoli 10:1-20

10  Nzinzi oyo ekufi nde elumbisaka mafuta ya moto oyo asalaka malasi+ nsolo mabe, ebimisaka yango fulufulu. Mwa bozoba moke esalaka mpe ndenge wana epai ya moto oyo azali na motuya mingi mpo azali na bwanya mpe na nkembo.+  Motema ya moto ya bwanya ezalaka na lobɔkɔ na ye ya mobali,+ kasi motema ya zoba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.+  Mpe lisusu, na nzela nyonso oyo zoba azali kotambola,+ azali na motema te, mpe azali mpenza koloba na moto nyonso ete ye moko azali zoba.+  Soki elimo ya moyangeli esilikeli yo, kolongwa te na esika oyo ozali,+ mpo kofanda nyɛɛ ekitisaka masumu minene.+  Ezali na likambo moko ya mpasi oyo namoni na nse ya moi, likambo lokola libunga+ oyo euti na moto oyo azali na bokonzi:+  Bazoba batyami na ebele ya bibonga oyo etombwani,+ kasi bato ya bozwi bazali kofanda mpenza kaka na esika ya nse.  Namoná basaleli bazali kotambola na bampunda kasi bankumu bazali kotambola na makolo, na mabele, lokola basaleli.+  Ye oyo azali kotimola libulu ye moko akokwea na yango;+ mpe ye oyo azali kobuka efelo ya mabanga, nyoka ekoswa ye.+  Ye oyo azali kotimola mabanga akomizokisa na yango. Ye oyo azali kopasola nkoni asengeli kokeba na yango.+ 10  Soki esaleli moko ya ebende esili mino mpe moto apelisi yango te,+ akobimisa mpenza nguya na ye ya bomoi. Yango wana, kosalela bwanya mpo na kolonga epesaka litomba.+ 11  Soki nyoka eswi liboso liloba ya kobinisa yango ebima,+ ntina ya moto oyo ayebi kosalela lolemo ezali te. 12  Maloba ya monɔkɔ ya moto ya bwanya esalaka ete moto andimama,+ kasi mbɛbu ya zoba emɛlaka ye.+ 13  Ebandeli ya maloba ya monɔkɔ na ye ezali bozoba,+ mpe na nsima, nsuka ya monɔkɔ na ye ezali ligboma ya mabe mpenza. 14  Mpe zoba alobaka maloba mingi.+ Moto ayebi te oyo ekosalema; bongo oyo ekosalema nsima na ye, nani akoki koyebisa ye?+ 15  Mosala makasi ya bazoba elɛmbisaka bango,+ mpo moko te ayebi ndenge ya kokende na engumba.+ 16  Ee mokili, ntango mokonzi na yo azali elenge+ mpe bankumu na yo bazali kolya se kolya ata na ntɔngɔ, ekosukela yo ndenge nini? 17  Ee mokili, esengo na yo ntango mokonzi na yo azali mwana ya bato ya lokumu mpe bankumu na yo balyaka na ntango oyo esengeli mpo na kozwa nguya, kasi bamɛlaka mingi te.+ 18  Mabaya ya nsamba ya ndako ebukanaka soki gɔigɔi eleki mingi, mpe ndako etangaka soki moto akangi mabɔkɔ.+ 19  Limpa esalemi mpo bato oyo basalaka mosala básɛka, mpe vinyo epesaka bomoi esengo;+ kasi mbongo nde ekataka makambo nyonso.+ 20  Ata na shambrɛ na yo ya kolala, kolakela mokonzi mabe te,+ mpe na bashambrɛ na yo ya kati epai olalaka, kolakela ata mozwi moko mabe te;+ mpo ekelamu oyo epumbwaka na likoló ekomema mongongo yango mpe eloko oyo ezalaka na mapapu ekoyebisa likambo yango.+

Maloba na nse