Mosakoli 1:1-18

1  Maloba ya moyanganisi,+ mwana ya Davidi mokonzi na Yerusaleme.+  Moyanganisi alobi: “Mpamba ya mpamba mpenza!+ Mpamba ya mpamba mpenza! Eloko nyonso ezali mpamba!”+  Litomba nini moto azali na yango na mosala na ye nyonso ya makasi oyo azali kosala+ makasi na nse ya moi?+  Libota oyo eleki,+ mpe libota mosusu eyei;+ kasi mabele ezali koumela seko.+  Moi mpe ebimi, mpe moi elali,+ mpe ezali koya na mpema na esika oyo yango ekobima.+  Mopɛpɛ ezali kokende na sudi, mpe ezali kobaluka ekei na nɔrdi.+ Ezali kobaluka, ezali se kobalukabaluka,+ mpe mopɛpɛ ezali kozonga na kobalukabaluka+ na yango.  Mai ya mikɛli nyonso ya eleko ya malili+ ezali kokende na mbu,+ kasi mbu etondaka te.+ Na esika oyo mai ya mikɛli ya eleko ya malili ezali kouta, ezali kozonga kuna mpo ebima lisusu.+  Biloko nyonso ezali kolɛmbisa;+ moto moko te akoki kolobela yango. Ata liso emoni,+ etondaka te mpe ata litoi eyoki, etondaka te.+  Oyo ezalaki, yango nde ekozala;+ mpe oyo esalemaki, yango nde ekosalema; yango wana eloko moko ya sika ezali te na nse ya moi.+ 10  Ezali nde na eloko moko oyo moto akoki koloba ete: “Talá oyo; ezali ya sika”? Esilá kozala banda ntango oyo etyami ndelo te;+ oyo ezali, ezali banda kala liboso ya ntango na biso.+ 11  Bato ya ntango ya kala bazali kokanisama ata moke te, ata mpe baoyo bakoya na nsima.+ Bango mpe, baoyo bakoya nsima lisusu bakokanisa bango ata moke te.+ 12  Ngai, moyanganisi, nazalaki mokonzi ya Yisraele na Yerusaleme.+ 13  Mpe natyaki motema na ngai mpo na koluka mpe kotalatala bwanya+ oyo etali likambo nyonso oyo esalemá na nse ya lola—mosala ya mpasi oyo Nzambe apesá bana ya bato básala.+ 14  Namonaki misala nyonso oyo ezalaki kosalema na nse ya moi,+ mpe talá! eloko nyonso ezalaki mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.+ 15  Oyo etɛngami ekoki kosembolama te,+ mpe oyo ezangi ekoki kotángama te. 16  Ngai, ɛɛ ngai, nalobaki na motema+ na ngai boye: “Talá! Ngai nabakisi bwanya mingi koleka moto nyonso oyo azalaki liboso na ngai na Yerusaleme,+ mpe motema na ngai eyebaki mpenza eloko babengi bwanya mpe boyebi.”+ 17  Mpe natikaki motema na ngai eyeba bwanya mpe eyeba ligboma,+ mpe nayaki koyeba bozoba,+ ete yango mpe ezali kaka koboma nzoto na kolanda mopɛpɛ.+ 18  Mpo kozala na bwanya mingi ememaka mitungisi mingi,+ yango wana moto oyo azali kobakisa boyebi azali kobakisa mpasi.+

Maloba na nse