Mika 6:1-16
6 Nabondeli bino, bóyoka oyo Yehova azali koloba.+ Tɛlɛmá, yebisá likambo na yo na bangomba, mpe bangomba mike eyoka mongongo na yo.+
2 Ee bino bangomba, bóyoka likambo ya Yehova, bino mpe biloko oyo eumelaka, bino miboko ya mabele;+ mpo Yehova azali na likambo ná bato na ye, mpe na Yisraele nde akolobana:+
3 “Ee bato na ngai,+ nasali bino nini? Mpe nalɛmbisi bino na likambo nini?+ Bótatwela ngai yango.+
4 Mpo nabimisaki bino na mokili ya Ezipito,+ mpe nasikolaki bino na ndako ya boombo;+ mpe natindaki Moize, Arona mpe Miriame liboso na bino.+
5 Ee bato na ngai, nabondeli bino, bókanisa+ oyo Balake mokonzi ya Moabe akanaki kosala,+ mpe oyo Balaama mwana ya Beore ayanolaki ye.+ Bókanisa oyo nasalaki banda Shitime+ tii Gilgale,+ mpo misala ya boyengebene ya Yehova ekoka koyebana.”+
6 Nakoya liboso ya Yehova na eloko nini?+ Nakogumbama liboso ya Nzambe ya likoló na eloko nini?+ Nakoya nde liboso na ye na makabo ya kotumba ya mibimba,+ na bana-ngɔmbɛ ya mbula moko?
7 Yehova akosepela nde na bankóto ya bampate-mibali, bankóto zomi zomi ya mikɛli ya mafuta?+ Nakopesa nde mwana na ngai ya liboso ya mobali mpo na botomboki na ngai, mbuma ya libumu na ngai mpo na lisumu ya molimo na ngai?+
8 Ee yo moto ya mabele, ye ayebisi yo oyo ezali malamu.+ Mpe eloko nini Yehova azali kosɛnga yo, soki bobele komonisa bosembo,+ kolinga boboto+ mpe kotambola na bopɔlɔ+ elongo na Nzambe na yo?+
9 Mongongo mpenza ya Yehova ezali kobelela na engumba,+ mpe moto oyo azali na bwanya, akobanga nkombo na yo.+ Bóyoka lingenda mpe ye oyo aponaki yango.+
10 Biloko ya motuya ya makambo mabe+ mpe efa oyo ekɔndá, oyo elakelami mabe, ezali nde naino kati na ndako ya moto mabe?
11 Nakoki nde kozala pɛto na bizaleli ntango nazali na bimekeli-kilo oyo ezali ya mabe mpe na saki ya libanga ya komeka kilo oyo ezali ya bokosi?+
12 Mpo bazwi na ye mpenza batondi na mobulu, mpe bato oyo bafandi epai na ye mpenza balobi lokuta,+ mpe lolemo na bango ezali na bokosi na monɔkɔ na bango.+
13 “Ngai mpe, ɛɛ ngai, nakobɛta yo kino okobɛla mpenza;+ libebi na yo ekozala, mpo na masumu na yo.+
14 Yo, ɛɛ yo, okolya kasi okotonda te, mpe libumu na yo ekozala mpamba.+ Mpe okolongola biloko, kasi okomema yango te kozanga ete ezwa likama; mpe oyo okomema kozanga ete ezwa likama, nakopesa yango na mopanga.+
15 Yo, ɛɛ yo, okolona mboto, kasi okobuka te. Yo, ɛɛ yo, okonyata mbuma ya olive, kasi okomipakola mafuta te; mpe vinyo ya elɛngi, kasi okomɛla vinyo te.+
16 Mpe bozali kotosa mitinda ya Omiri+ mpe misala nyonso ya ndako ya Ahaba,+ mpe bozali kotambola na kati ya batoli na bango;+ mpo nakómisa yo eloko ya kokamwa mpe nakómisa bato oyo bafandi epai na ye eloko ya kobɛtɛla piololo;+ mpe bokomema nsɔni ya bato ya bikólo.”+