Mika 5:1-15

5  “Na ntango ozali komikatakata nzoto,+ Ee mwana mwasi oyo bakɔteli; ye azingeli biso mpo na kobundisa biso.+ Na lingenda, bakobɛta mosambisi ya Yisraele na litama.+  “Mpe yo, Ee Beteleme Efrata,+ yo oyo ozali moke mpenza mpo okoka kotángama na kati ya bankóto ya Yuda,+ uta na yo+ moto moko akobima mpo na ngai, oyo akokóma mokonzi na Yisraele,+ oyo ebandeli na ye ezali uta kalakala, uta ntango oyo etyami ndelo te.+  “Yango wana, akosundola bango+ tii ntango ye oyo azali kobota akobota mpenza.+ Mpe bandeko na ye oyo batikali bakozonga epai ya bana ya Yisraele.  “Mpe akotɛlɛma mpenza mpe akoleisa etonga na makasi ya Yehova,+ na bonene ya nkombo ya Yehova Nzambe na ye.+ Mpe bakokoba kofanda mpenza,+ mpo sikoyo akozala monene tii na bandelo ya nsuka ya mabele.+  Mpe moto yango nde akozala kimya.+ Nzokande moasiri, ntango akoya na mokili na biso mpe ntango akonyata bandako milai na biso ya kofanda,+ tokobimisela ye babateli ya mpate nsambo, ɛɛ, bankumu mwambe na kati ya bato.  Mpe bakokamba mpenza mokili ya Asiri na mopanga,+ mpe mokili ya Nimerode+ na bisika na yango ya kokɔta. Mpe akosikola mpenza biso na mabɔkɔ ya moto ya Asiri,+ ntango akoya na mokili na biso mpe ntango akonyata teritware na biso.  “Mpe bato ya Yakobo oyo batikali+ bakokóma na kati ya ebele ya bato ya bikólo lokola mamwɛ oyo euti epai ya Yehova,+ lokola mbula monene likoló ya milona,+ oyo etalelaka moto te mpe ezelaka te bana ya moto ya mabele.+  Mpe bato ya Yakobo oyo batikali bakokóma na kati ya bikólo, na kati ya ebele ya bato ya bikólo, lokola nkɔsi na kati ya banyama ya zamba, lokola mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki na kati ya bitonga ya bampate, oyo, ntango ezali mpenza koleka, enyataka mpe epasolaka mpenza;+ mpe mobikisi azali te.  Lobɔkɔ na yo ekozala mpenza likoló ya batɛmɛli na yo,+ mpe banguna na yo nyonso bakolongolama.”+ 10  “Mpe ekosalema boye na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova, “nakolongola bampunda na yo na kati na yo mpe nakobebisa makalo na yo.+ 11  Mpe nakolongola bingumba ya mokili na yo mpe nakokweisa bisika na yo nyonso oyo ebatelami makasi.+ 12  Mpe nakolongola misala ya bonganga-nkisi na lobɔkɔ na yo, mpe okozala lisusu na bato ya misala ya maji te.+ 13  Mpe nakolongola bikeko na yo oyo eyemami ná makonzí na yo na kati na yo, mpe okofukamela lisusu te eloko oyo osali na mabɔkɔ na yo.+ 14  Mpe nakopikola banzete na yo ya losambo+ na kati na yo mpe nakosilisa bingumba na yo nyɛɛ. 15  Mpe na nkanda mpe na nkɛlɛ nakozongisa mabe likoló ya bikólo oyo etosi te.”+

Maloba na nse