Mika 1:1-16

1  Liloba ya Yehova oyo eyelaki Mika+ moto ya Moreshete, na mikolo ya Yotame,+ Ahaze,+ Hizikiya,+ bakonzi ya Yuda,+ liloba oyo amonaki na emonaneli mpo na Samaria+ mpe Yerusaleme:+  “Ee bino bato ya bikólo, bóyoka bino nyonso; Ee mabele ná biloko oyo etondisi yo,+ bótya likebi mpe Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso azala motatoli mpo na kofunda bino,+ Yehova uta na tempelo na ye mosantu.+  Mpo talá! Yehova azali kobima na esika na ye,+ mpe akokita mpenza mpe akotambola na bisika oyo etombwaná ya mabele.+  Mpe bangomba ekonyangwa na nse na ye,+ mpe mabwaku ya patatalu ekopaswana, lokola mafuta mpo na mɔtɔ,+ lokola mai esopani na esika oyo ekitá.  “Nyonso wana ezali mpo na botomboki ya Yakobo, ɛɛ mpo na masumu ya ndako ya Yisraele.+ Botomboki ya Yakobo nde nini? Samaria te?+ Mpe bisika oyo etombwaná ya Yuda nde nini?+ Yerusaleme te?  Mpe nakokómisa Samaria libondo ya bitiká ya elanga,+ bisika ya kolona nzete ya vinyo; mpe nakosopa mabanga na yango na lobwaku, mpe nakotika miboko na yango polele.+  Mpe bikeko na yango nyonso oyo eyemami, ekobukama bitenibiteni,+ mpe makabo na yango nyonso oyo bapesaki lokola lifuti ekozikisama na mɔtɔ;+ mpe nakobebisa bikeko na yango nyonso. Mpo oyo yango esangisaki ezali kati na biloko oyo bapesaki lokola lifuti ya mwasi ya ndumba, mpe na eloko oyo bapesaki lokola lifuti ya mwasi ya ndumba nde yango ekozonga.”+  Mpo na yango, nakoganga mpe nakolela;+ nakotambola makolo ngulu mpe bolumbu.+ Nakoganga lokola bambulú, mpe nakolela lokola bamaligbanga ya basi.  Mpo mpasi oyo ekweli yango ekoki kosila te;+ mpo ekómi tii na Yuda,+ bolɔzi tii na porte ya bato na ngai, tii na Yerusaleme.+ 10  “Bóyebisa yango na Gate te; bólela ata kolela te.+ “Omibalolabalola na putulu+ mpenza na ndako ya Afra. 11  Ee mwasi oyo ofandaka na Shafire, leká bolumbu mpe na nsɔni.+ Mwasi oyo afandaka na Zaanane abimi te. Koganga ya Bete-ezele ekolongwela bino esika oyo yango etɛlɛmaka. 12  Mpo mwasi oyo afandaka na Marote azalaki kozela likambo ya malamu,+ kasi likambo ya mabe euti na Yehova ekiti tii na porte ya Yerusaleme.+ 13  Ee yo mwasi oyo ofandaka na Lakishi,+ kangá likalo na bampunda oyo bakangisá mpo na mosala. Ye azalaki ebandeli ya lisumu ya mwana mwasi ya Siona,+ mpo botomboki ya Yisraele emonani epai na yo.+ 14  Yango wana okopesa Moreshete-gate makabo ya bokabwani.+ Bandako ya Akazibe+ ezalaki eloko moko ya bokosi epai ya bakonzi ya Yisraele. 15  Ee yo mwasi oyo ofandaka na Maresha,+ nakoyeisela yo moto oyo abɔtɔlaka.+ Nkembo ya Yisraele ekokóma tii na Adulame.+ 16  Omisala libandi, mpe katá nsuki na yo mpo na bana na yo oyo basepelisaka yo mpenza.+ Kómisá libandi na yo monene lokola oyo ya mpongo, mpamba te bakei, bamemami na mboka mopaya, mosika na yo.”+

Maloba na nse