Matai 9:1-38
9 Bongo amataki na masuwa akatisi mpe akei na engumba na ye.+
2 Mpe talá! bamemelaki ye mokatatali moko oyo alalaki na mbeto.+ Ntango amonaki kondima na bango Yesu alobaki na mokatatali ete: “Mwana, zalá na mpiko; masumu na yo elimbisami.”+
3 Mpe talá! bakomeli mosusu balobanaki ete: “Moto oyo azali kofinga.”+
4 Mpe lokola Yesu ayebaki makanisi na bango,+ alobaki ete: “Mpo na nini bozali kokanisa makambo ya mabe na mitema na bino?+
5 Na ndakisa, nini eleki pɛtɛɛ, koloba: Masumu na yo elimbisami, to koloba: Tɛlɛmá mpe tambolá?+
6 Nzokande, mpo bóyeba ete Mwana ya moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu awa na mabele+—” bongo alobaki na mokatatali yango ete: “Tɛlɛmá, lɔkɔtá mbeto na yo, mpe kende epai na yo.”+
7 Mpe atɛlɛmaki mpe akendaki epai na ye.
8 Ntango ebele ya bato yango bamonaki bongo kobanga ekangaki bango, mpe bakumisaki Nzambe,+ oyo apesaki bato bokonzi+ ya ndenge wana.
9 Na nsima, ntango Yesu azalaki koleka mwa mosika, amonaki moto moko nkombo na ye Matai afandi na biro ya mpako, mpe alobaki na ye ete: “Landá ngai.”*+ Bongo atɛlɛmaki mpe alandaki ye.+
10 Na nsima, ntango afandaki na mesa na ndako,+ talá! ebele ya bakɔngɔli-mpako ná basumuki bayaki mpe bafandaki elongo na Yesu ná bayekoli na ye.
11 Kasi ntango Bafarisai bamonaki bongo babandaki koloba na bayekoli na ye ete: “Mpo na nini moteyi na bino azali kolya elongo na bakɔngɔli-mpako ná basumuki?”+
12 Ntango ayokaki bango, alobaki ete: “Bato ya nzoto kolɔngɔnɔ bazalaka na mposa ya monganga te,+ kasi nde bato oyo bazali kobɛla.
13 Boye bókende koyekola ntina ya maloba oyo: ‘Nalingi motema mawa, kasi mbeka te.’+ Mpo nayaki kobenga bayengebene te, kasi basumuki.”
14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki epai na ye mpe batunaki ete: “Mpo na nini biso ná Bafarisai tokilaka bilei kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te?”+
15 Na yango Yesu alobaki na bango ete: “Baninga ya mobali ya libala bazali na ntina moko te ya kolela ntango mobali ya libala+ azali elongo na bango, boye te? Kasi mikolo ekoya ntango mobali ya libala akolongolama+ epai na bango, mpe bongo bakokila bilei.+
16 Moto moko te abambaka eteni ya elamba ya sika na elamba ya kala; mpo ntango elamba ya sika ekobendana, ekopasola elamba wana ya kala mabe koleka.+
17 Batyaka mpe vinyo ya sika na milangi ya kala ya mposo ya nyama te; soki basali bongo, milangi ya mposo ya nyama ekopanzana, vinyo ekosopana mpe milangi ya mposo ya nyama ekobeba.+ Kasi batyaka vinyo ya sika na milangi ya sika ya mposo ya nyama, mpe yango nyonso mibale ekobatelama.”+
18 Ntango azalaki koyebisa bango makambo wana, talá! moyangeli+ moko oyo apusanaki epai na ye abandaki kogumbamela ye+ mpe alobaki ete: “Sikoyo ekoki kozala ete mwana na ngai ya mwasi akufi;+ kasi yaká kotyela ye lobɔkɔ mpe akozonga na bomoi.”+
19 Bongo Yesu, atɛlɛmaki alandi ye; bayekoli na ye mpe balandaki.
20 Mpe talá! mwasi moko oyo abɛlaki maladi ya kotanga makila na boumeli ya mbula zomi na mibale+ ayaki nsimansima mpe asimbaki nsɔngɛ ya elamba na ye ya likoló;+
21 mpo azalaki koloba na motema na ye ete: “Soki nasimbi kaka elamba na ye ya likoló nakobika.”+
22 Yesu abalukaki amoni ye mpe alobaki ete: “Mwana na ngai, zalá na mpiko; kondima na yo ebikisi yo.”+ Mpe banda na ngonga wana mwasi yango abikaki.+
23 Nzokande, ntango akɔtaki na ndako ya moyangeli yango+ mpe amonaki babɛti-piololo ná ebele ya bato na yikiyiki makasi,+
24 Yesu abandaki koloba ete: “Bólongwa awa, mpo mwana mwasi oyo akufi te, kasi alali nde mpɔngi.”+ Na yango babandaki kosɛka ye na lityo.+
25 Ntango kaka ebele ya bato yango babimisamaki na libándá, akɔtaki mpe asimbaki lobɔkɔ na ye,+ mpe mwana mwasi yango atɛlɛmaki.+
26 Ya solo, nsango ya likambo yango epalanganaki na etúká wana mobimba.
27 Ntango Yesu azalaki koleka mosika, bato mibale oyo bakufá miso+ balandaki ye, bazali koganga mpe koloba ete: “Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa.”+
28 Bongo ntango akɔtaki na ndako, bato wana oyo bakufá miso bayaki epai na ye, mpe Yesu atunaki bango ete: “Bondimi+ ete ngai nakoki kosala yango?” Bayanolaki ye ete: “Ɛɛ, Nkolo.”
29 Bongo asimbaki miso na bango+ mpe alobaki ete: “Ekómela bino ndenge kondima na bino ezali.”
30 Mpe miso na bango emonaki. Lisusu, Yesu apekisaki bango makasi mpe alobaki ete: “Bókeba, moto moko te ayeba yango.”+
31 Kasi ntango bango babimaki na libándá, bapanzaki nsango na ye na etúká wana mobimba.+
32 Nzokande ntango balingaki kolongwa, talá! bamemelaki ye moto moko oyo alobaka te, oyo azalaki na demo;+
33 mpe ntango demo yango abimisamaki, moto yango oyo alobaka te alobaki.+ Ɛɛ, ebele ya bato yango bakamwaki+ mpe balobaki ete: “Likambo ya boye emonaná naino te na Yisraele.”
34 Kasi Bafarisai babandaki koloba ete: “Azali kobimisa bademo nde na nguya ya mokonzi ya bademo.”+
35 Mpe Yesu azalaki kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka, azalaki koteya na basinagoga na bango, kosakola nsango malamu ya bokonzi mpe kobikisa maladi ya ndenge nyonso mpe mbeba ya ndenge nyonso na nzoto.+
36 Ntango amonaki ebele ya bato yango ayokelaki bango mawa,+ mpo banyokwamaki* mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.+
37 Bongo alobaki na bayekoli na ye ete: “Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke.+
38 Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.”+