Matai 8:1-34
8 Nsima ya kokita na ngomba ebele ya bato balandaki ye.
2 Mpe talá! moto moko ya maba+ ayaki mpe abandaki kogumbamela ye, alobi ete: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.”
3 Bongo asembolaki lobɔkɔ na ye, asimbaki ye mpe alobaki ete: “Nalingi. Kómá pɛto.”+ Mpe na mbala moko akómaki pɛto, maba na ye esilaki.+
4 Bongo Yesu alobaki na ye ete: “Kebá, koyebisa moto te,+ kasi kende komilakisa epai ya nganga-nzambe,+ mpe pesá likabo+ oyo Moize atindaki, mpo bámona ete obiki.”
5 Ntango akɔtaki na Kapernaume,+ mokonzi moko ya basoda ayaki epai na ye, abondelaki ye
6 mpe alobaki ete: “Tata, mosaleli na ngai ya mobali alali na ndako mpo akómi mokatatali, azali konyokwama makasi mpenza.”
7 Alobaki na ye ete: “Ntango nakokóma kuna nakobikisa ye.”
8 Mokonzi wana ya basoda azongisaki ete: “Tata, nabongi te ete okɔta na ndako na ngai, kasi lobá se liloba mpe mosaleli na ngai akobika.
9 Mpo ngai mpe nazali na bakonzi likoló na ngai, nazali na basoda na nse na ngai, mpe nalobaka na oyo: ‘Kende!’+ mpe akendeke, mpe na mosusu: ‘Yaká!’ mpe ayaka, mpe na moombo na ngai: ‘Salá boye!’ mpe asalaka yango.”
10 Ntango Yesu ayokaki bongo, akamwaki mpe alobaki na baoyo bazalaki kolanda ye ete: “Nazali koyebisa bino solo ete: Namoná naino kondima ya monene boye te epai ya moto moko na Yisraele.+
11 Kasi nazali koyebisa bino ete bato mingi bakouta na ɛsti mpe na wɛsti+ bakoya mpe bakofanda na mesa elongo na Abrahama, Yisaka ná Yakobo na bokonzi+ ya likoló;+
12 nzokande bana ya bokonzi+ bakobwakama na molili ya libándá. Kuna nde bakolela mpe bakolya mino.”+
13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi wana ya basoda ete: “Kende. Likambo na yo esalema kaka ndenge kondima na yo ezali.”+ Mpe mosaleli yango abikaki na ngonga wana.
14 Mpe ntango Yesu akómaki na ndako ya Petro, amonaki bokilo na ye ya mwasi+ alali mpe azalaki na fiɛvrɛ.+
15 Bongo asimbaki lobɔkɔ na ye,+ mpe fiɛvrɛ na ye esilaki, mpe atɛlɛmaki mpe abandaki kosalela ye.+
16 Kasi na nsima, ntango mpokwa ekómaki, bamemelaki ye ebele ya bato oyo bazalaki na bademo; mpe na liloba kaka moko abimisaki bilimo yango, mpe abikisaki baoyo nyonso bazalaki koyoka nzoto malamu te;
17 mpo likambo oyo elobamaki na nzela ya mosakoli Yisaya ekokisama: “Akamataki bamaladi na biso mpe amemaki bampasi na biso.”+
18 Ntango Yesu amonaki ebele ya bato zingazinga na ye, apesaki bayekoli na ye mitindo bákatisa na ngámbo mosusu.+
19 Mpe mokomeli moko boye ayaki mpe alobaki na ye ete: “Moteyi, nakolanda yo epai nyonso okokende.”+
20 Kasi Yesu alobaki na ye ete: “Bagambala ezali na mabulu mpe bandɛkɛ ya likoló ezali na bazumbu, kasi Mwana ya moto azali na esika ya kolalisa motó te.”+
21 Bongo mosusu na kati ya bayekoli alobaki na ye ete: “Nkolo, pesá ngai naino nzela nakende kokunda tata na ngai.”
22 Yesu alobaki na ye ete: “Kobá kolanda ngai, mpe tiká bakufi bákunda bakufi na bango.”+
23 Mpe ntango amataki na masuwa,+ bayekoli na ye balandaki ye.
24 Nzokande talá! mbu etombokaki makasi, mpe mbonge ezalaki kozipa masuwa; kasi ye azalaki kolala.+
25 Mpe bayaki kolamwisa+ ye, balobi: “Nkolo, bikisá biso, tolingi tókufa!”
26 Kasi alobaki na bango ete: “Mpo na nini bozali kobangabanga, bino bato ya kondima moke?”+ Bongo atɛlɛmaki apameli mopɛpɛ, mpe kimya moko monene ekɔtaki.+
27 Bongo bato wana bakamwaki mpe balobaki ete: “Oyo azali moto ya ndenge nini,+ mpo ata mipɛpɛ ná mbu etosa ye?”
28 Ntango akómaki na ngámbo mosusu, na mokili ya Bagadara,+ bato mibale oyo bazalaki na bademo+ bautaki na malita bakutanaki na ye, na nkanda makasi mpenza, mpe moto moko azalaki na mpiko ya koleka na nzela wana te.
29 Mpe talá! bagangaki mpe balobaki ete: “Mwana ya Nzambe, biso na yo likambo nini?+ Oyaki awa mpo na konyokola biso+ liboso ya ntango oyo etyamá?”+
30 Kasi mwa mosika na bango etonga moko ya ebele ya bangulu ezalaki kolya.
31 Bongo bademo babandaki kobondela ye mpe koloba ete: “Soki obimisi biso, tindá biso na etonga wana ya bangulu.”+
32 Bongo alobaki na bango ete: “Bókende!” Babimaki mpe bakɔtaki na bangulu; mpe talá! etonga mobimba emibwakaki banda na esika ya likoló ya lobwaku tii na mbu mpe ekufaki na mai.+
33 Kasi babateli ya etonga bakimaki bakɔti na engumba mpe bayebisaki makambo nyonso, ná likambo ya bato oyo bazalaki na bademo.
34 Mpe talá! engumba mobimba ebimaki kokutana na Yesu; mpe nsima ya komona ye, babondelaki ye makasi alongwa na bitúká na bango.+